Likita lya bansó: losámbo ezali ekela yokó ya elikya
Vatican News
Papá azongelaki makita na ye ya bansó mokolo ya misáto 5 ya sánzá ya mwambi sima mwá bapóso ya bopemi na Castel Gandolfo. Libosó ya bandimi bébóo, basangani na basilique Sántu-Petelo, Léon XIV akobaki likanisi na ye na mobéko monéne Sacrosanctum Concilium, ebulisami mokolo eye ya misáto na ntina ya losámbo ya loléngé lya losámbo ya misa.
«Lokolá likanisi epesami na apostolu Polo, ezali Elimo-Sántu oyo ekotéya bisó kosámbela», elobaki Papá. «Úto mokolo ya Nkitélá, Elimo evandi na Eklezia, na bopesi likanisi na mókó mókó ya misála na ye mpe, mpenza, losámbo». Úto waná, Eklezia ezangaka te kosangana mpo ya kosepela Mobombano ya pasika.
Komona lisusu bosóló ya losámbo
«Na eleko na bisó», ekobaki Papá wa Roma, «na bileko bikonzami na likanisi lyokó etáli bokási mpe boleí, losámbo ekoki komonana lokolá ntina te mpe ya pámba». Na mokili mókó «esika wápi nzebi mpe tekiniki bikoloba komema biyano na nionso», kosámbela ekoki kobima lokolá motindo mókó ya kokima to tekiniki yokó káti ya basusu, na ndéngé ya makanisi mpe na boluki bolámu ya moto. Esengeli kútu, elobaki Papá, «komona lisusu na bosóló na ye».
Esika ya bokútani na Nzámbe
Sacrosanctum Concilium ezuaki na ntina bosenga ená. Mobéko monéne ya Concile etiaka 'te liloba «losámbo» ekolakisa mobimba ya loléngé lya losámbo ya misa, botáli bokó ya ntina, elobaki Tatá-Esántu, «mpo ekambaka mbongwana ya loléngé lya losámbo ya misa na botiyi bozali ya bandimi na káti na yangó». Loléngé lya losámbo ya misa elakisami yambo mpenza «lokolá esika ya bokútáni, na likanisi ya Nzámbe eye emikomisi penepene ya bomoto na nzelá ya Mwána na ye».
Kosántisa mokolo
Póso yokó yokó mpe mokolo na mokolo, Ukaristiya mpe Loléngé lya losámbo ya misa ya Ngonga bizali pema ya bomoí ya Eklezia eye ekotambuisa Elimo-Sántu na Nzóto na ye, elobi Papá. Na losámbo liná, Kristu asangisi na Ye bomoto nionso mpe akangisi na Ye mpo ya kotelemisa nzembo yokó ya lokúmu na Tatá. «Esangani na Ukaristiya, eye ekobakisa mwinda, Loléngé lya losámbo ya misa ya Ngonga ekosántisa eleko ya bomoí na bisó ya mokolo na mokolo, elobaki Papá, yambo ya kotánga bantángo na yangó bikeseni ya losámbo»: «ntongo, tokobánda mokolo na boyambi mpe matondo; na midi, tokosenga bokási ya kotikala na lobóko o káti ya mikakatano; na pokwa, ntángo mosála esili, Mabondeli ya pokwa bikokende elongo na eleko ya bolali ya moyi; tokolala na káti na bisó na bomitiki na boboto ya Nzámbe».
«Ngonga mókó mókó ezali ekela yokó ya elikya», elobaki Tatá-Esántu. «Na mobémbo na bisó na mabelé, tokokengela na bozeli, na Eklezia nionso, bozongi ya esengo ya Mokónzi», esúkisaki ye.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.
