Luka

Angélus: Léon XIV alendisi bato bátika lolendo mpe bándimela Nzambe

Yambo ‘te asala losambo ya Angélus, ya lomingo la 9 Agusto, na Place Saint-Pierre, Pàpa Leon XIV alobelaki mingi likamwisi oyo Yezu atambolaki likóló ya mayi na ntango ya mopepe makasi. Alendisaki mpe bitulùlkù ya bato ba mobembo ‘te bazongela Nzambe na tango ya molili mpe ya bowelani ntembe. Léon XIV alobaki ‘te bozali bwa Yezu ebongolaka makambo manso, mpe apesi toli ‘te: «Tózala na lolendo te na tango ya longonya mpe tómikumisa koleka ndelo te».

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Ut’o lininisa lya ndako ya baPápa, liboso ya bayambi bayanganaki na esika monene ya Santu Petro, Pápa Léon XIV abendaki likebi na ye likoló na Nsango Elamu la mokolo. Alobelaki «Yezu oyo, akendaki epai ya bayekoli na ye, bongo azalaki kotambola likoló ya mayi, tango mopepe makasi ezalaki kobéte na mbu ya Galile». (Mat. 14 :22-33).

Bobanga té

Na esika ya kobondo bango, mpe ya kokitisa bango motema, emonani ‘te abakisaki nde nsomo na bango. Kasi batungisamaki mpe babangaki, bakanisaki ‘te azali emonemoni to elima. Na tango wana ya mpasi, mongongo ya Kristo eyokanaki ‘te: “Bózala na mpiko, ezali ngai; bózala na bobangi lisusu tè”, ekundolaki Pàpa.

Na kolanda Evanzile ya Mateyo, Léon XIV alobi ‘te “bozali ya Mokonzi ebongolaka makambo manso” mpamba te “Petro atambolaki likoló ya mayi mpo na kokende epai ya Yezu”. Na nsima, abangaki mpe abandaki kozinda, kasi Yezu abikisaki ye. Yango wana, bozali bwa Kristu ezali kolendisa biso ‘te tóbanga ye te mpe tótika ye te.

Ebele ya bayambi na Place Saint-Pierre, mpo na losambo la Angelus
Ebele ya bayambi na Place Saint-Pierre, mpo na losambo la Angelus   (@VATICAN MEDIA)

Bokasi bwa boyambi

Na tango bayekoli bamonaki ndenge Yezu akatisaki mayi ya mbonge makasi, ndenge akitisaki mompepe, mpe ndenge afandaki na kati ya masuwa, bango moko bandimaki likambo yango, mpe bango moko basakolaki boyambi ‘te « solo ozali mwana wa Nzambe». Elobaki Pàpa na malendisi ma yé. «Amina ! Na zali koyebisa bino ‘te : Soki bozali na kondima mpe bozali kobeta ntembe te, […], bokoki koloba na ngomba eye ‘te : Longwá awa mpe kene kobwakama na mbu, mpe ekosalema bongo» (Mat. 21, 21). «Nde yango mpenza bakutanaki na yango na etimà : kimia ya Kristu eyaki epai na bango tango bazalaki kati na mai ya mobulu», elobaki lisusu Nganga-Mokonzi monene.

Bómikumisa koleka ndelo te

Na yango, mpo na Pape, likamwisi liye eteyi biso «tozala na lolendo te liboso ya kolónga, mpe tomipesa motuya koleka ndelo te» mpe na ntango moko, «tozala na elikya ‘te, ata na ntango ya molili, tango tozali kokanisa ‘te tózangi makasi liboso ya mikakatano, mpe atako tosali milende, tomónaka ‘te tozali kozonga nsima na esika ‘te tókende liboso. “Na mabakù manso, Yezu atikaka biso soki moke te, mpe soki tóndimi koyamba ye na bomikitisi nyonso na masuwa ya bomoyi na biso - na nzela ya mabondeli to losambo, ya basakramentu, ya koyoka Liloba lya Ye -  , tokozwa kati na Ye kimya, mwinda mpe makasi, mpo na mobembo mwa biso”, elobaki episkopo ya Roma. Abondeli ‘te “Ngondo Maria asalisa biso na kozala na bomoyi ya lolenge wana, na kati ya bomipesi na Nzambe, ye oyo abengamaki Mwa-esengo mpo na kondima na ye, (tala na boyambi bwa ye (Luka 1:45). 

Matondo mingi na ndenge otangi lisolo liye

09 sánzá ya mwambe 2026, 17:14