Luka

2026.07.17 TKoponama ya  Mgr Jean MIGUINA, Episkopo ya Sahr na Tchad 2026.07.17 TKoponama ya Mgr Jean MIGUINA, Episkopo ya Sahr na Tchad  

Tchad: Pápa aponi Jean Miguina episkopo ya Sarh

Tata Mosantu aponaki, o mokolo mwa minei mwa 16 ya sànzà ya Yuli 2026, Sàngó Jean Miguino, mosangani ya lisangá lya ba frères mineurs capucins, lokola episkopo ya dioseze ya Sarh; azalaki kino sik’awa supérieur ya ba aspirants capucins ya Tchad mpe conseiller ya custodie ya Tchad mpe ya Républiki ya Centrafrika. Pápa aponaki ye nsima ya kondima botikami ya moto oyo azalaki liboso na ye, Mgr Miguel Ángel Sebastián Martínez, oyo akokisaki mibù 75 oyo okoki mpo na mibeko ya lingomba.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Mgr. Jean Miguina abotamaki na mokolo mwa zomi na mibalé (12 Setembre) ya mobù 1978 na dioseze ya Laï. Akulaki bonganga o mokolo mwa tuku mibale na moko (21) ya sanza ya zomi na moko ya mobù 2009 na engumba ya Moundou. Ayekolaki droit canonique na Université pontificale ya Sainte Croix na Roma. Azali mpe na diplome ya masta mpe ya doctorat na droit de l'homme mpe na action humanitaire na Université catholique ya Afrique centrale na Yaoundé, na Cameroun.

Mikumba miye akokisaki

Episkopo ya Sarh oyo aponami, asalaki misala miye milandi: Asistant régional mpo na bilenge (jeunesse franciscaine) na Bangui, Centrafrika, kobanda mobù  2009 kino 2012. Moteyi mpe mokambi ya Institut universitaire Saint-Laurent na Bouar, kaka na Républiki ya Centrafrika; Secrétaire ya Conférence des supérieurs majeurs capucins ya Afrika ya katikati (centrale) mpe Afrika ya Westi, kobanda mobù 2016 kino 2019. Mobateli ya ba Capuchins ya mike ya Tchad mpe Afrique centrale mpe mokambi ya Conférence ya ba supérieurs majeurs ya ba Capuchins ya Afrique centrale mpe ya Afrique de l'Ouest kobanda mobù m2019 kino 2022.

Kobanda mobù 2024, Mgr Miguina azalaki moko ya bato ya Collège ya ba consulteurs ya dioseze ya Moundou; assistant spirituel ya ba Sœurs franciscaines ya Donia; professeur ya latin na grand séminaire Saint-Mbaga-Tuzinde na Sarh. Lisusu, na kati ya Ordre ya ba Capuchins, azalaki mokonzi ya ba aspirants Capuchins na Tchad, mpe conseiller mpe gardien ya Custodie ya Tchad mpe ya Républiki ya Centrafrika mpe moko ya bato ya Commission juridiki.

Kofungwama, pete to kozanga mindondo, komunyo mpe esengo

Mgr Mguina azali na mokano ya kokokisa mokumba moye Tata Mosantu apesi ye na Dioseze ya Sarh nà bofungwami, na pete, na komunyo mpe na esengo na ndakisa ya tata na ye ya molimo Saint François ya Assise.

Mituna-lisolo elongo na Mgr Jean Miguina, episkopo ya sika ya diocèse ya Sarh, na Tchad

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo liye.

 

18 sánzá ya nsambo 2026, 11:22