Luka

Pàpa na Monastele ya Saint-Benoit mpe ya Sainte-Scolastique

Sima ya kolongwa na esika ya Bosatu ya Bosanto na Vallepietra, Léon XIV akendeki na midi na monastele ya Saint-Benoît na Subiaco. Sima ya mwa losambo liboso lya elili ya Santu François, mpe ya koyamba ekeko ya Saint Benoît, asakolaki losambo la Tata wa biso elongo na ba Sàngó ya monastele. Na sima, akendeki na monastele ya Sainte-Scolastique, epai wapi alyaki na midi elongo na bato ya Lingomba ya ba Bénédictins, akendaki kotala ba niangó mpe atambolaki na monastele yango.

Bansango ya Vatikan

 

Na tongo ya mokolo mwa 22 ya Yuli, Pápa Léon XIV alongwaki na esika mosantu ya Bosato Bosantu na Vallepietra, moko ya bisika ya losambo oyo bato mingi bakumisaka na bangomba ya Apennine ya ntei, mpe na ngonga ya nzanga, akendaki na mutuka na monastele ya Saint - Benoît na Subiaco, oyo ezwami na mwa ntaka ya bakilometele tuku misato.

Ndenge elobami na ndako ya bopanzi nsango ya Vatikan, na konti na ye ya Telegram, atelemaki nye na losambo liboso lya elili ya ekeke ya zomi na misato (XIII Siècle) ya Saint François, mpe na Sacro Speco, ayambaki libólóngó ya ekeko ya Saint Benoît, lolenge momeseno ya bonkóko eséngaka, mpe asalaki losambo ya Tata wa biso elongo nà bato oyo bazalaki wana.

Pàpa ayambi to mpe azingi ekopi na libolongo ya ekeko ya Saint Benoît
Pàpa ayambi to mpe azingi ekopi na libolongo ya ekeko ya Saint Benoît   (@Vatican Media)

Na nsuka ya mobembo na ye, akendeki na monastele ya Sainte-Scolastique, epai wapi alyaki na midi elongo na basàngó ya ba Bénédictins mpe atambolaki na bandako ya monastele. Na sima, Pápa akendeki na Castel Gandolfo, epai azalaki kolekisa tango na yé ya bopemi to konjé, kino mokolo mwa 27 ya Yulí.



 

Matondo mingi na ndenge o tangi lisolo liye

22 sánzá ya nsambo 2026, 23:37