2025.10.14 Pàpa Leon XIV, na tango azali kopesa mbote na Mokambi ya Repibliki ya Italy, Sergio Mattarella, na Palazzo ya Quirinale 2025.10.14 Pàpa Leon XIV, na tango azali kopesa mbote na Mokambi ya Repibliki ya Italy, Sergio Mattarella, na Palazzo ya Quirinale  (@Vatican Media)

Pápa apesi Mokambi Matarella matondi mpo na bokengi na ye na bomoi ya Eklezia

Na telegrame oyo atindelaki Mokambi ya Répibliki ya Italie na mokolo mwa 23 ya yuli libakù lya bokundoli ya mibu tukù mwambe na mitano (85è) ya anivelesele na yango, Léon XIV alaki losambo la ye mpo na «misio ya bontoki» oyo azali kokokisa na mosala mwa bato. Atyaki na «bolobeli» bwa basantu bakengeli ya mboka, François ya Assizi elongó nà Catherine ya Sienne.

Bansango ya Vatikan

Mokitani ya Santu Petro apesi matondi na Sergio Mattarella mpo na «makanisi ya ntango inso» oyo azali na yango mpo na «bomoi bwa Eklezia mpe ya bato» ya Italie mpe apesi yango na maboko ya basantu basungi to bakengeli na yango, François ya Assizi mpe Catherine ya Sienna. Na libakù lya bokundoli mibù tukù mwambé na mitano ya Répibliki ya Italie, Leon atindaki telegrami moko na Mokambi ya mboka. Mokanda yango elobi ‘te, elongo nà maloba mànà, Pàpa “apesaki bobenisi bwa yé ya bantómà mpo na libota lya ye, baninga ba ye ya mosàlà mpe mpo na «Italie molingami».

Pàpa akei kotala Quirinal

Episkopo wa Roma akendakà na Quirinale ut’o mokolo mwa zomi na mineyi ya Okotobé ya mobù 2025. Asalaki lisukulu la yé na maye matali multilateralisme mpe mpo na lisungi na mabota ma Eropa oyo, motango ya kobotama ya bana, ezali na “kokita makasi”, elobaki yé. Nganga-Mokonzi Monene alobelaki to atalisaki mpe likambo la bitumba biye bizali kosàlema na mokili, mpe asengi na kotala bilongi bya bato bayiké “bazali na mpasi, mpo na mobulu ya bato oyo bazali na mawa te, bazali kobongisa liwa mpe libebi” na lisalisi lya bitumba ebele oyo “ezali kobebisa mabele ma biso”, mpe koyoka lolàkà to kolela ya bango.

Na ngambo na ye, Sergio Mattarella abetaki nsété na misala mya Pápa, oyo ezali kotalela mingi mpenza “bato” mpe etaleli kosolola. Mokano moye ezongelaki mbala na mbala mpe mokambi ya mboka asepelaki na ya yango, na mikanda misusu atindelaki Nganga-mokonzi monene. Na ndakisa, tomoni yango na mokanda oyo atindelaki ye, mbula moko nsima ya ebandela ya mosala mwa ye lokola mokitani ya Pétro mpe na eleko ya Pasika.

 

Matondo mingi na ndenge otangi lisolo liye.

24 sánzá ya nsambo 2026, 22:33