Luka

2026.07.23 Na tango ya liyangani monene ya ba Episkopo ya mabele ya Aziya na Jakarta 2026.07.23 Na tango ya liyangani monene ya ba Episkopo ya mabele ya Aziya na Jakarta 

Pápa abyangi baepiskopo ya Aziya na kokólisa bondeko mpe bomoko

Awa bapusani na kosukisa liyangani monene ya FABC (Fédération des conférences épiscopales d’Asie), oyo elekaki na Jakarta na Indonesie, Pàpa atindaki o mokolo mwa 25 ya Yuli, video moko na lokotà ya lingelesi, na baepiskopo. Asengi bango ‘te bakólisa bondeko kati na Eklezia, balendisa elimo ya Ukaristya mpe batonga ba “gbagba” kati na bato ya Aziya.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Lisanga ya baepiskopo ya Azia (FABC), oyo efungwamaki o mokolo mwa tuku mibalé ya sànzà ya Yuli na Jakarta, na Indonésie, ekosuka mokolo mwa lomingo. Na likita yango, ba episkopo ya lokumu mpe baepiskopo koleka nkàmà moko na tuku mibale (120) oyo bautaki bipayi na bipayi, bayanganaki mpo na pósó moko ya mabondeli, ya bososoli mpe ya kokanisa likoló na mosala ya Eklezya na kati ya mabele mobimba ya Aziya. “Nazali kolàka bino ‘te nazali pembeni na bino na molimo, mpe nazali kobondela ‘te elimo santu etambwisa bino na mosàlà na bino ya bomoko”. Pàpa alobaki yango na lokótà ya lingelesi, mpe atindaki yango na nzela ya bilili, o mokolo mwa poso mwa tuku mibale na mitano ya Yuli (25 juillet).

Bokomona mambi manene

Mótó ya likanisi ya liyangani na bango ewuti na maloba ma Yezu na Nathanael: “Okomona makambo minene lisusu koleka”, (Jn 1, 50). Léon XIV alobi ‘te mbela ya Filipo mpe Natanaele emonisi Kristu lokola “Molobeli bobele moko kati na Nzambe mpe bato”, abyangi baepiskopo ‘te bázongela elikya na bango kati na mokumba oyo eklezya epesi bino. Mpo na episkopo wa Roma, mbela yango ezali mpe na ntina mingi mpo na bayekoli ba Kristu ya moyi mwa lelo, oyo bazali na mokumba ya kotatola ‘te Nzambe azali kati na bato ya Aziya mpe kati na bato ya mboka na bango.

Na tango ya Liyangani monene ya FABC (Fédération des conférences épiscopales d’Asie), oyo elekaki na Jakarta na Indonesie, o mokolo mwa 25 ya Yuli 2026
Na tango ya Liyangani monene ya FABC (Fédération des conférences épiscopales d’Asie), oyo elekaki na Jakarta na Indonesie, o mokolo mwa 25 ya Yuli 2026

Ukaristya, liziba lya bomoko.

Mpo na Pàpa, «Yezu azali kaka liziba lya bomoko kati na bison à Nzambe te, kasi oyo ya bomoko kati na biso moko nà basusu». Leon XIV azongeli lisusu mateya ya ansikliki na ye Magnifica Humanitas, oyo kati na yango, andimi ‘te «mpo na lisanga lya bakristu, bomoko ezwaka liziba na yango na libombami lya Kristu mpe eleisamaka Ukaristya». Pàpa akobaki na koloba ‘te alingaki kolendisa bino na kokoba kokolisa molimo ya Ukaristya na kati ya mangomba na bino ya mboka, elingi koloba molimo ya bomoko ya Eklezia oyo esimbami na bolingo ewutaka na likabo lya Mokonzi na biso na Ukaristya.

Kotonga ba gbagba bipayi ya Aziya mobimba

Pape alobi lisusu ‘te alingi “bokangami kati na eklezya ya bamboka” ekoma makasi mpo ekoma “elembo monene ya bozali bwa Nzambe”. Na makanisi ma ye, bondeko ya mozindo ekopesa nzela na mangomba ya Katoliko, mpo ‘te epesa lisungi mingi na masólo, bondeko mpe boyokani kati na bato ya Aziya. Mokitani ya Petro alobi lisusu ‘te azali na elikya, na komona mangomba “mazali kotonga ba gbagba bipai na bipai na kati ya Azia mobimba”, na ntango oyo bato bazali kokutana na mikakatano mingi, na makambo ya bomoi ya bato mpe ya mangomba.

Mpo na kosukisa Video, Tata Mosantu apesi misala mya lisanga ya bato banso na lisungi to bolobeli bwa Ngondo Maria, Mama wa Eklezia. Abeleli mp ona bayangani banso “likabo lya bwanya mpe ya bokasi bwa Mokonzi”.

Matondo mingi na ndenge otangi lisólo liye.

25 sánzá ya nsambo 2026, 22:46