Na sanza ya Agusti, Pápa alendisi bato básàmbela mpo na kosakola Nsango Elamu na ba engumba
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Mbala mingi na kati ya baengumba, bomoyi bwa bato ezwami na bonkutu to na kozanga koyebana (l’anonimat) mpe kozala yo moko. Na yango, Léon XIV apesi mokano na ye ya sànzà ya Agusto mpo na “kosakola Nsango Elamu na bingumba”, mpo na kopusa bayambi to bakristu bakundola nzela oyo “ekotinda bango batonga bandaku ekoyeba koyamba mpe ezali ya kofungwama epai wapi moto moko te akoki koyoka lokola azali komonana te”. Na nzela ya Réseau Mondial de Prière du Pape mpe na kampanye ya sambela elongo na Pàpa (Prie avec le Pape), Tata Mosantu azali kobyanga bandimi mpe bato banso ba motema bolamu ‘te basangana nà ye sànza na sànza na makanisi mya ye ya losambo.
Okati ya losambo la yé, Pàpa azali kolobela Yezu “Mokengeli malamu ya mpate” oyo alekaka banzela mpe bisikà, akotaka na “bandako ya milayi mpe na bisika ya bobólà”, mpe azali kotambwisa na bozangi makélele bamiliyo y abato bazali koluka ntina ya bomoyi bwa bango, o kati ya “makélele mpe mabulungani”. Nganga-Mokonzi Monene ayebi ‘te baengumba, biye esengeli kozala bisika ya bonsomi mpe ya mabakù malamu, ekoki mpe kokóma bisika bya “bozangi koyebana mpe ya kozala yo moko”. Na yango, azali kosenga na bato ‘te bazala na limoni lya sika, mpo na bayeba komona kati na bomoyi ya baengumba, biesika malamu mpo na kosakola Nsango Elamu.
Na suka ya losambo la ye, asambelaki boye: “Mokonzi, tika ‘te mangomba ya baengumba ya biso ezala bandako ya kofungwama mpe ya koyamba, bisika oyo tozali kokabola elikya, esika oyo moto moko te ayoka lokola azali komonana te, mpe epai esengo ya Nsango na yo ezali kongengisa bomoyi ya bandeko basi mpe babali mingi ebombàmà. Sala na biso ba temo ba yo na engumba, bamisionele ya mpiko mpe ya mayele, oyo bazali kosakola bolingo bwa yo na nzela ya bomoi bwa bango, oyo bazali na makoki ya kolónga kowela mbangu, makélele mpe kozanga koyebana”.
Engumba, elanga ya misio mp ona eleko ya biso
Na moyi mwa lelo, bato pene ya 45% ya mokili bavandaka na baengumba (45 % de la population mondiale vit en milieu urbain), bakomisi baengumba minene bisika bya ntina ya misio ya eleko ya biso. Bokóli ya motángo ya bato mpe motángo ya bato oyo bazali kofanda esika moko ezali kopesa biso mikakatano na makambo ya bomoyi ya bato mpe ya mboka. Ba kartié, bandako ya milayi, ba zones commerciales mpe bamalweka (périphéries) ekomi bisika ya kozanga koyebana mpe ya kozala yo moko(anonymité et solitude). Engebene mitango ya Nations unies- Nations Unies – World Urbanization Prospects (2025), ba agglomérations oyo eza na bato mingi na mokili ezali Jakarta (42 miliyo), Dacca (37 miliyo), Tokyo (33 miliyo), Delhi (30 miliyo) mpe Shanghai (30 miliyo). Na lisikulu na ye, na libakù ya likita ya mobù ya ’International Catholic Legislators Network, na sanza ya Agusto ya mobù 2025, Mokiyani ya Petro alobaki ‘te “Avenire ya bomoto ya bato etaleli bolingo” oyo biso moko toponi mpo na kobongisa mboka na biso: bolingo ya moyimi, bolingo ya bisomei, to bolingo ya Nzambe mpe ya bazalani”.
Kosakola Nsango Elamu na baengumba nà mayeke.
Mbala boni tokutanaki na elongi ya ndeko oyo azokaki, kasi totika ye aleki? etunaki Sàngó Cristóbal Fones, SJ, mokambi ya Réseau Mondial de la Prière. Mpo na yé, likanisi liye ya lisambo, ezali mpo ‘te moto nyonso amipesa na yango. “Kobanda na mbongwana ya kati oyo eyaka na nzela ya losambo ya solo solo, oyo ewutaka na bantómà, Elimo Santu akoki kolakisa biso lolenge ya kotonga, na bisika bya biso moko, bingumba bya sembo mpe ya boyambi, lokola Tata Mosantu asengi biso”.
Na mobù 2022, Pàpa François akomisaki mokano mwa ye libonza “Mpo na Eklezia oyo efungwami mpo na bato banso”, abengaki bato bazala Eklezya ya bozalani nà baninga, oyo ezali lolenge la Nzambe.
Matondo mingi na ndenge otangi liyebisi liye.
