2025.08.15 Misa ya kala, tango Pàpa Leon XIV azalaki kokamba misa na paloase Saint-Thomas-ya-Villanova, na Castel Gandolfo. (Foto ya kala ya 15 agusti 2025) 2025.08.15 Misa ya kala, tango Pàpa Leon XIV azalaki kokamba misa na paloase Saint-Thomas-ya-Villanova, na Castel Gandolfo. (Foto ya kala ya 15 agusti 2025)  (@Vatican Media)

Manáka mya milùlù ya Pápa na sànzà ya Agústi

O Mokolo mwa minei na tongo, biro ya milùlù ya Pàpa ebimisaki manaka ya milùlù Mosantu Pàpa akosàla na sànzà ya Agusti. Kati na yango, to simbi misa mya mokolo mwa 6 ya Agusti, na Portiuncola na engumba Assizi. Ekozala milùlù ya feti ya Ntómbwa ya Ngondo Maria, na paloase Saint-Thomas-de-Villanova, na Castel Gandolfo; mpe akokende mobembo na Rimini.

Bansango ya Vatikan

 

Biro ya Pápa mpo na milulu ya losambo ebimisaki o mokolo mwa minei, mwa 30 ya sànzà ya Yuli, manaka ya milùlù miye Pápa Léon XIV akokamba na sànzà ya Agusti. O mokolo mwa minei, mwa 6 Agusti, Feti ya Mbongwana ya Mokonzi, Tata Mosantu akokamba misa na ngonga ya 10h30, ngonga ya Roma, na ndako ya losambo ya Pápa ya Sainte-Marie-des-Anges na Portioncola ya Assizi, mpo na bayangani ya bokutani ya “Go! Franciscan Youth Meeting”, oyo elimboli na lokotà ya lingala ‘te: “Kende! Likita ya bilenge ya Lingomba ya ba Franciscains”.

Na mokolo mwa poso mwa 15 ya Agusti, molulu ya Ntombwà ya Ngondo Mosantu Maria (Assomption de ma Très Sainte Vierge Marie), Nganga-Mokonzi monene akokamba misa na ngonga ya 10h00, na paloase ya Pàpa ya Saint-Thomas-ya-Villanova, na Castel Gandolfo. Mpe lisusu, na mokolo mwa poso, mwa 22 Agústi, na maye matali mobembo mwa ye ya bontómà na engumba Rimini, na ekólo Italie, Pápa Léon XIV akokamba misa na ngonga ya 6h30 ya mpokwa to 18h30 na libóngo ya Rimini.

Na kosukisa, na mokolo mwa poso, mwa 29 ya Agusti, na ndako-nzambe Maria Santissima del Lago, na ngonga ya 18h00. Ekozala bongo feti ya nsuka ya Pàpa Léon XIV na sànzà ya mwambe ya mobù 2026, oyo ekolanda na molulu ya masuwa na etimà ya Albano, na libàkù ya feti ya Notre-Dame du Lac.



 

Matondo mingi na ndenge otangi lisolo liye

31 sánzá ya nsambo 2026, 11:53