Liloba lya Pàpa ezali bobele oyo ya Mokengeli Mpate
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC elongo nà Andrea Tornielli
*Andrea Tornielli
Atako na tango azali koloba na ntina ya kimya mpe bitumba, na ntina ya koyamba bapaya to na lolenge ya kotikala moto na eleko ya mayele ya bomoto (l'intelligence artificielle), Mokitani ya Petro azali mpe akotikala tango inso motambwisi ya molimo. Atako episkopo ya Roma, engebene na boyokani ya Latran ya mobù 1929 oyo esilisaki «Motuna ya Roma», mpe azali mokonzi ya mwa ekólo eleki moke na mokili mobimba – kasi ezali na bonene ya ndambo ya kilometele na kati ya engumba-mokonzi ya Italie, elingi koloba té ‘te asalaka to alobaka lokola moto ya politiki ntango azali kotalela makambo maye mazali kolobela mokili ya bato.
Pàpa Paul VI mpe alobelaki yango na lisukuli la yé ya mokolo mwa minei ya sanza ya Okotobe ya mobù 1965 (4 oktobre 1965) na liyangani monene na Nations Unies : «Bokutani bonà, bino banso boyebi yango malamu, ezali na lolenge mibale: ya pete mpe na bonene. Ya pete mpo, ezali koloba ‘te azali moto lokola yo; azali ndeko na yo, mpe atako azali moko ya baekolo ya mike o kati ya bino, bikolo ya minene, atyamaki na bokonzi mpo na kokókisa mokùmbà mwa yé ya motambwisi ya molimo mpe endimisa baye basali boyokani na ye ‘te, azali na bokeseni na bokonzi nyonso ya mokili moye». Na mobembo na États-Unis, Paul VI alobelaki na ntina ya yé moko ; «Azali na nguya ya eleko te, azali na mposa te ya kowelana elongo nà bino. Ya solo, tozali na eloko te ya kosenga, motuna moko te ya kotuna; mingi mingi, tozali na mposa ya kosala, tosengeli na ndingisa, oyo ya kozala na makoki ya kosalela bino, lolenge elongobanina na mokumba to makoki ma biso.Tokoluka eloko té, tokosàla yango na bomikitisi mpe na bolingo».
Ezali solo mpenza, mpo na kobatela bonsomi ya Molandi ya Kristu, esili koleka pene na ekeke moko, etukà moko ya moke epesamaki epai ya episkopo ya Roma mpe Mobateli ya Eklezya ya Molóngó. Akozala mpe Mokonzi Monene, mpe na bongo, mokonzi ya Letà. Nzokande, ezali lisusu boyokani oyo ezali na mokano ya kondima ‘te esengeli kozala na bonsomi liboso ya bikólo bisusu binso, kasi ezali té mpo na kokokisa mokumba mibale. Na yango, kokumisa to kolekisa ndelo na ntina ya mokumba to etindà ya Nganga-Mokonzi Monene lokola mokonzi ya mboka, kotya likebi mingi likoló na ntina ya mokumba mwa ye, ezali lokuta, mpamba te, ezali kobomba mokumba mwa ye ya solo solo, lokola Mokengeli to Mobateli mpate ya mokili mobimba. Pastele oyo, Pasteur oyo azali kolobela ba Katoliki, ba Kristu, ba bandimi mpe bato banso ba motema bolamu, mpo na mokano moko kaka, oyo ya kosakola Nsango Elamu, nsango na ye ya bolingo, ya bondeko mpe ya kimya oyo “esengeli na bibundeli te mpe elongolaka bibundeli”.
Giovanni Battista Montini, oyo azalaki episkopo wa lokùmu ya kala ya Milano, abetaki nsete polele mpo ya likambo liye, na tango ya lisukulu lya yé, na libakù ya bofungoli likiya linene ya Concile œcuménique Vatican II., o mokolo mwa 10 Okotobe ya mobù 1962. Kati na lisukúlu yango, moto oyo asengelaki kokóma pàpa ya mikolo mizalaki koyà, alobelaki nsuka ya bokonzi ya lingomba mpe kokweya ya bokonzi ya Pápa na mobu 1870. “Sé na ntango yango, bokonzi ya Pápa ezongelaki na nguya nyonso mosala mwa yango ya kozala molakisi ya bomoyi mpe motatoli ya Nsango Elamu, mpo na kokóma na bisika ya likoló koleka kati na boyangeli bwa molimo ya Eklezya mpe na bopusi bwa yango, ya bizaleli malamu likoló na mokili, lokola lisalemaka nayino te”.
Tango azali kosenga ‘te bomoi ya moto etosama mpe ebatelama tango inso na boumeli ya bomoi bwa ye; tango azali koloba na ntina ya kimya, oyo ezali kotalela bolamu ya bato banso, mpe azali kobenga mpo na kosukisa momekano ya bibundeli, koleka kutu likanisi lya “etumba ya sembo”; tango azali kobenga na masóló mpe na boyokani, na kobele Magistère ya Doctrine sociale; tango azali kosenga biso totalela bato baluki-mboka to bamigré lokola bato oyo tosengeli koyamba, kozanga kobosana lokumu la bomoto bwa bango; tango azali kokundwela biso ‘te babólà bazali motema ya Nsango Elamu mpe ‘te tosengeli kotonga ba sociétés ya bosembo mpe ya bokokani; tango azali kokumisa lotomo ya bonsomi ya losambo, tango azali komonisa ntina ya kobatela biloko bizalisami mpo na kotikela yango bana ba biso mpe bana ya bana ba biso; Mokitani ya Petro alobaka lokola Mokambi ya Ekólo te. Asakolaka bobele Nsango Elamu.
*Mokambi ya mosàlà ya bopanzi-nsango ya Vatikan
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo liye
