Léon XIV na Lampedusa, mobembo ya kozala pene nà bato bakimá mboka mpe bato oyo bàbosanà bango
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Mobembo mwa Pápa Léon XIV ezali kolanda molende na ye mpo na kosalisa bato bazali na bobóla mpe litatoli epesamaki na Pápa François oyo ayaki liboso na ye. Ut’o aponamaki, kozala pene na bato oyo bazangi esika ya kofanda ekomaki likambo lya ntina mingi na mosala mwa ye ya mokitani ya Pétro. Maloba ma Léon XIV mpe mibembo mya ye emonisaki makanisi mya ye, mongi mpenza mpo na babóla mpe bato baye bazangi esika ya kofanda.
Na mobembo mwa ye oyo euti kosalema na ekolo Espagne, tango azalaki nayino kotyola likambo lya mombongo ya koteka bato na Santa Cruz de Tenerife, Pápa alobaki te: «Bosósóli bwa moto, mpe mingi mpenza makanisi ma bomokristu, ekoki te kotikala na bopotu mpo na bato oyo bazindaki na masuwa mpe bazangaki lisungi, na malita mànà ma mbù». Engebene na yé, moto na moto oyo apikwami to alongwe na esika na ye, amemaka lisolo lya bomoyi bwa yé, lokumu la ye mpe elikya na ye oyo ebongi koyamba mpe komemya yango, mingimingi mpo ‘te «biso nyonso tozali bato ba mobembo; biso nyonso tozali batàmboli oyo bazali na nzela, tozali kokende na mboka na biso ya likoló».
Lampeduza, esanga o kati ya bondongwani ya baluki-mboka ya kofanda.
Na Lampeduza, Tata Mosantu akonyata to kotambola na mabele maye makómi elembo ya kokima na mbù Méditerranée, kasi mpe ya bomoko elongo nà baoyo bazali kokima bitumba, minyoko to kibobólà. Na nzela ya mobembo moye, Leon XIV akolakisa elembo ya Eklezya eye eponi kotikala pembeni ya bato bazali koleka na eleko ya mikakatano ya kozala libandà ya mboka. Se bongo, akomema lisungi ekosunga bato oyo bafandi kuna, bato oyo basalaka na bolingo malamu, mpe bibongiseli oyo ezali kosalisa bango.
Sima ya matambé mya François
Manaka elengeli bobenisi ya etàndà moko esalemaki mpo na Pàpa François. Na molulu yango, bapambolaki etanda moko mpo na Pápa François. Na ntina ya likambo liye, Léon XIV amonisi mposa na ye ya kolanda nzela oyo epesamaki na moto oyo azalaki liboso na ye. Tembe te, mobembo mwa ye ya liboso, na 2013, ezalaki na Lampedusa. Na maloba mosusu, elimboli ‘te, soki balongoli likambo lya bokundoli mokolo monà, mobembo ya Leon na esanga ya Italie, ezali kolakisa kokóba ya bomipesi, mpo na lokumu la baluki-mboka to bato baye bakendaka kofanda na bamboka mopaya, na kokanisa bato oyo bakufaki na Méditerranée mpe mpo na kolendisa ezalela ya boninga to bokutani.
Ndulu ya milulu elengelami na losambo mpe bokutani
Episkopo wa Roma akolungwa na libanda lya mpepo ya Roma-Ciampino na ngonga ya 7h45 mpo na kokóma na Lampeduza. Bokomi bwa ye, ebongisami na ngonga ya 9h00. Eloko akosala liboso, ekozala kokende kosambela mwa tango moke na lilita lya esanga, epai wapi akokitisa bafulele. Bakokanisa lisusu video na ye ya sanza ya libwà ya mobù 2025, oyo atindelaki Lampeduza, na libakù ya kolakisa candidature ya projet «Gestes d'accueil, oyo na lokota ya lingala elimboli ‘te Elembo ya koyamba» na motango ya libùlà (patrimoine culturel immatériel) ya UNESCO. O kati ya bilili binà, Leon ya XIV, atako azalaki kokweisa ezaleli ya kozanga nguya oyo ezali komonana na mokili mobimba, azalaki mpe koyoka mawa mpo na «bato mingi oyo bakufaki ; kati na bango bamama mpe bana! Bandeko mibali mpe basi bayiké oyo bakendeki na mboka mopaya bakundamaki na Lampeduza, mpe bazali kopema na mabele lokola mbuma oyo ekobimisa mokili mwa sika».
Na nsima, Pápa akokende na Ezibelo ya mabele ya Eropa, monimá ya bato baluki-mboka, mpe na nsima akokende na Molo Favaloro, epai kuna akobenisa to kopambola libàyà oyo batyaki mpo na moto oyo azalaki liboso na ye, François. Mwa moke na nsima, akopesa mbote na etuluku moko ya bato oyo bakimá-mboka to mpe bamigré. Na ngonga ya 10h30, Tata Mosantu akokamba molulu mya Ukaristya. Na nsuka na yango, akokutana nà bakonzi, nà bana, nà bakoni to bato ba maladi mpe na bavolontele oyo bazali kosalisa bato ya mpasi mpe bayebazangi makasi.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye
