2025.11.20 Assisi - Pàpa Leon XIV na tango ya bokutani nà ba episkopo na Baziliki ya Santu Maria ya ba Anzelu 2025.11.20 Assisi - Pàpa Leon XIV na tango ya bokutani nà ba episkopo na Baziliki ya Santu Maria ya ba Anzelu   (@Vatican Media)

Léon XIV na Assise, na manaka ma yé, bokutani nà ba Franciscains

Na libakù la “Go! Franciscan Youth Meeting 2026”, bokutani ya bilenge ya lingomba ya ba franciscains, makambo matali mobembo ya Pápa na mokolo mwa minei, mwa 6 Agusti na engumba ya Umbria e, eyebisamaki. Leon XIV akokita na mpepo na ngonga ya 8h30 mpe akokende na bazilikiSainte-Marie-des-Anges. Akolekisa tongo na ye mobimba wana, yambo te azonga na ngonga ya nzangà (midi)..

Bansango ya Vatikan

 

Mobembo ya Pàpa Leon na mboka ya Assizi o mokolo mwa 6 ya sànzà ya Agusti, elengelami na manaka ya bokutani elongo nà bilenge na mpe ba tindami ya lingomba ya ba Franciscain, misa na Baziliki ya Santu-Maria-ya ba-Anzelu. Ekosàlema na libakù ya bokutani ya bilenge bya bikolo mobimba, “Go! Franciscan Youth Meeting 2026”. Solo bilenge bya ba ngambo minei bya mokili bakoyà na engumba ya Umbria,bakosàla mikolo misato ya losambo mpe ya masóló.   

Bokómi na Santu-Maria-ya ba-Anzelu

Manaka mibimisami na mokolo moye mwa minei mwa 30 ya sànzà ya Yuli, na lisalisi lya ndako ya bopanzi nsango ya Ngwende-Esantu, elobi ‘te Nganga-Mokonzi monene akopumbwa ut’o libanda ya mpempo ya Vatikan na ngonga ya 8h00. Sima ya bohùmeli ya katikati ya ngonga moko, Pàpa akokita na esika ya masano “Migaghelli” na Santu-Maria-ya ba-Anzelu, epayi wapi bakoyamba ye na Mgr Felice Accrocca; episkopo ya ba diosezez ya Assizi-Nocera Umbra-Gualdo Tadino mpe Foligno, sous-secretaire na bokambi ya Conseil ya ba ministres, Alfredo Mantovano; Mokambi ya etukù ya Umbroa, Stefano Proietti; Prefet ya Pérouse, Francesco Zito, maire ya Assizi, Valter Stoppini, nà mpe mokambi ya province ya Pérouse, Massimiliano Presciutti.   

Misa mpe bokutani elongo nà bilenge nà bafranciscains

Na sima Pàpa Leon XIV akokende na baziliki ya Santu-Maria-ya ba-Anzelu. Tango akokóma, bakoyamba yé na baministres generaux ya ordres ya bafranciscains, neti, ba frères mineurs, ba frères conventuels mpe ba frères capucins,kati na bango: Massimo Fusarelli, Carlos Alberto Trovarelli mpe Roberto Genuin. Na ngonga ya 8h45, na place Santu-Maria-ya ba-Anzelu, Nganga-Mokonzi Monene akokutana nà bilenge, bongo akoyanola na ba mitunà misato bakotuna yé.

Manaka mya milùlù ya Pàpa Leon XIV na sànzà ya Agusti 2026
Manaka mya milùlù ya Pàpa Leon XIV na sànzà ya Agusti 2026   (@Vatican Media)

Na sima, pene ya ngonga ya 9h45, na cloître ya couvent, akopesa mbote na ba représentants ya ba ordres franciscains mpe akoloba mwa maloba na ba episkopo oyo bakozala wana mpe na ba membres ya Comité national mpo na mibù nkàmà mwambe ya liwà ya santu François ya Assizi. Na ngonga ya 10h30 ya tongo, na ndako-nzambe monene to baziliki, Léon XIV akosala misa. Na sima ya molulu ya Ukaristya, Pápa akolongwa na ndako-nzambe mpe akopesa mbote na bakonzi oyo bakoyà koyamba yé. Kokita na Vatikan elengelami na ngonga ya 12h45.

Viziti to mobembo asalaki liboso

Nsango epesamaki o mokolo mwa zomi na libwà ya sànzà ya Febuwali (19 fevrier) oyo eleki ‘te, Pàpa Léon XIV akosala mobembo ya mibale na Assizi, epai akendeki nayino o mokolo mwa tukù mibale ya sànzà Novembe ya mobù 2025 (20 Novembre 2025) mpo na kosukisa likita ya mbala ya tukù mwambé na moko (81è) ya Liyangani monene (Assemblée générale) ya CEI. Na libakù yango, asàmbelaki to abondelaki na lilita lya « Poverello » na ndako-nzambe monene ya Saint-François. O tango azalaki kopesa ba Franciscains mbote ya nsuka, mokolo wana, Pápa alakaki bango ‘te akozonga lisusu na mwa engumba eye ya Umbria.

 

Matondo mingi na ndenge otangi lisolo liye

30 sánzá ya nsambo 2026, 18:27