Luka

Leon XIV azongi na Vatikan sima ya tango na yé ya bopemi ya eleko ya Molungé na Castel Gandolfo

Na mpokwa ya mokolo mwa 27 ya Yuli, Pàpa alungwaki palais apostoliki oyo ezwami na engumba moke ya ba Castelli Romani, mpe azongaki na Vatikan. Abimaki na kati ya mutuka na ngonga ya 20h34. Abenisaki mwa ndambo ya bana oyo bazalaki kozela ye elongo nà batata ba bango mpo ya kopesa ye mbote. Nganga-Mokonzi monene akomaki o mokolo mwa 5 ya Yuli. Na kovanda wana, aliyaki nà bato nkàmà mibalé, ya dioseze ya Roma oyo bazali na makoki te, mpe akotaki na consert moko.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Na mpokwa ya mokolo mwa yambo, babetelaki ye maboko nzela-nzela, tango Léon XIV azalaki kobima na ndako ya bapápa ; nzokandé bamisusu bazalaki koganga: «Pápa Oyeee» oyo elimboli ‘te «Pàpa azala na bomoi molai!». Nganga-Mokonzi apesaki mbote na baye basanganaki mpo na kozela ye mpe, ut’o lininisa lya mutuka azalaki, apesaki bobenisi na mwa ndambo ya bana bazalaki wanà. Pàpa akozonga na Castel Gandolfo na mokolo mwa misato mwa 29 ya sànzà ya Yuli, mpo asangana elongo, na bokutani bwa losambo mpe bwa bondeko «Cantico di Pace». Centre ya Formationsuperieure Laudato si mpe Fondation Andrea Bocelli, nde balengeli ekwelà enà. Esalemi bongo na libakù lya bosepeli milùlù mya mibù nkàmà mwambe (8ème centenaire) ya liwà lya Saint François ya engumba Assizi. Ekoleka bongo na ngonga ya 19 heure, na kati ya lobàlà ya ndako ya ba Pàpa (Villas pontificales).

Lolenge alekisi mikolo na Castel Gandolfo

Na mikolo tukù mibale na misato oyo asalaki na Castel Gandolfo, Leon XIV amipesaki mingi na losambo, na kotanga mikanda, mpe mwa moke na sport. Mwa milùlù misalemaki awa azalaki na mwa engumba oyo moke, ezali pembeni na etimà ya Albano, na baezibeli ya Roma. Batangi yango o kati ya ba engumba kitoko o kati ya bingumba ya Italy. Kolongola bokutani basato na lomingo elongo na bayambi, mikolo mya lomingo, 12, 19, mpe 26 ya sànzà ya Yuli, mpo na losambo la Angelus, oyo azalaki kosàla liboso ya ezibelo ya ndako ya ba Pàpa, epayi wapi avandaki. Ezalaki mpe na milulu mibale oyo etindaki Pàpa abima liboso lya bato.

Banzembo na ntina ya Kimya, liboso la Pàpa Leon XIV, eyembami na bilenge ya Korale ya Fondation Andrea Bocelli, na Castel Gandolfo
Banzembo na ntina ya Kimya, liboso la Pàpa Leon XIV, eyembami na bilenge ya Korale ya Fondation Andrea Bocelli, na Castel Gandolfo

Limpati elongo nà babólà

Alyaki na lobàlà ya ndako ya ba Pàpa na Castel Gandolfo elongo nà bato nkàmà mibale. Na kati, batangi bana mike tukù misato na mitano (35 enfants), bazali na bolembu; bawùtaki na dioseze ya Roma o mokolo mwa zomi na moko ya sànzà ya Yuli (11 juillet). Ezalaki mpe nà consert na ndako ya ba Pàpa, dioseze ya Albano moto alengelaki yango o mokolo mwa zomi na mwambe ya Yuli (18 juillet). Pàpa abimaki mpe mbala mibale na poso eleki; akendaki kotàla bisika misato na bonkutù: mokolo mwa tukù mibale ya Yuli, akendaki kotala monastele ya lingombà ya ba Bénédictins ya Montecassino, mpe o mokolo mwa tukù mibale na mibale (22 juillet), akendaki na Sanctuaire ya Bosatu Bosantu ( Sainte-Trinité) ya Vallepietra mpe na mostele ya Santu Benoit nà Santu-Scolastique ya Subiaco.

Pàpa azali kobenisa mwana moko, tango azalaki kotika Castel Gandolfo
Pàpa azali kobenisa mwana moko, tango azalaki kotika Castel Gandolfo

 

Matondo mingi na ndenge otangi lisolo liye.

 

28 sánzá ya nsambo 2026, 13:18