Angélus: Yezu Kristu, eloko ya motuya ebombami oyo ebongolaka bomoyi
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Na bato bamobembo bayanganaki o mokolo mwa lomingo mwa 26 ya Yuli, na esika ya bonsomi (place de la liberté), liboso lya ndako lya yé ya eleko ya molungé, na Castel Gandolfo, Pàpa Leon XIV abyangi bayambi, na nzela ya moùlani mwa eloko ya motuya ebombami o elanga mpe ya mayaka kitoko oyo ezali na liloba lya nzambe ya mokolo, mpo na kokundola botuyà bwa bokonzi bwa Nzambe. Bongo kotenka mpe kotika nyonso, ezali lisusu bomipima te kasi ezali litombà to mpe mbano. Moto moko te akoki kolónga libyangi lya Yezu, mpamba te, ezali mbela ya bonsomi, etondisami na bososli, kasi ezalaka ya lombango, etindaka moto ayanola na mbalakàkà, mpe etondisaka motema na mposa makasi. Mpo na Nganga-Mokonzi, bokutani ya bokonzi bwa Nzambe, «ezali mbongwana oyo ekokitisa bomoi te, kasi ezali kobakisa yango. Soki eloko moko esengeli bobele kobongwana sikawa, ezali mpo na kopesa mabakù mingi, kasi ezali te mpo na kolongola yango».
Mbelà mpo ya bato banso
Pápa amonisi ‘te Yezu alobeli na bato bakeseni na masese ma ye: moyi-mboka moko, moteki, babomi-mbisi, mokomeli, mwasi oyo asalaka mampa, mokonzi, babateli ya mpate, to mpe bakambi.
Alobaki ‘te bokeseni bónà bozali komonisa ezalela ya mbéla to libyangi ya Nzambe, ezali mpo ya bato banso. Moto na moto, atako makoki ma yé ya bomoyi ezali ndenge nini, mosala mwa bango, to lolenge la bango ya bomoi; banso babyangami na komona bonzenga to kitoko ya Bokonzi mpe ya kozongisa sika, bomoi bwa bango. “Bokonzi bwa Nzambe ezali komonisa bonzenga to kitoko na yango ya motuya na mitindo ndenge na ndenge, kasi ezali kobenga moto nyonso - mibali mpe basi, bilenge mpe mikólóto babangé, babola mpe bazwi - na mbongwana ya mozindo”.
Yoko Eklezya esangani na nkombo ya Kristu
Tata Mosantu alobaki lisusu ‘te Eklezia esalemi na bato bawùti bisika ndenge na ndenge, ya mimeseno mpe ya mikumba ndenge na ndenge, kasi basangani na bondimi moko kati na Yezu Kristu, “eloko ya motuya ebombami, liyaka lya ntalo, monyama oyo ezali kosangisa baoyo bapalangani”.
Alobaki lisusu ‘te, ut’o ebandela, Yezu abyangaki mpe asangisaki pembeni epai na ye bato oyo, ata lolenge nini, bakokaki na ndenge mosusu, kozala elongo té.
Lokola Mokonzi Salomo, Pápa alendisaki bayambi ‘te básengé likabo bwanya mpo na kokesenisa «mayaka ma motuya monene, mpe ya koyeba kokundola eloko ya motùya oyo ebongi otekisa biloko bya yo binso mpo na kozwa yango». Alobi ‘te lokola bakompanyi ya biloko ya kolya (bileyi) ezali kobongola bokenzu ya biloko tolingaka, na kobimisa bamposa ya sika mpo na kosombisa biso biyano oyo ezali kosepelisa biso te, mpe mbala mosusu ezali kobebisa motema na biso: «Tosengeli koyeba eloko oyo eleki ntina mpenza: ndé botùya ya boyokani na Nzambe ; yango epesaka biso esengo, mpe esalisaka biso tózala na boyokani malamu na basusu».
Episkopo wa Roma asukisaki bomanyoli bwa ye, na kosenga bolobeli bwa Maria, “Ngwende ya bwanya to ya Mayele”, mpo ‘te atambwisa bamposa ya bomoyi bwa biso, epai ya Yezu, mpo ‘te yé, akokisa yango na mobimba na yango mpenza.
Matondo mingi na ndenge otangi liyebisi liye.
