Angelus : Bokonzi bwa Nzambe, ekopalanganaka ata na kati ya matiti mabé
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Na kotikala na makanisi na liloba lya mokolo mwa lelo ya Santu Mateyo (Mt 13, 24-43), oyo alimboli ‘te «Bokonzi bwa Likolo ekokani na moto moko alonaki mbuma ya malamu na elanga na ye». Pápa azongelaki lisusu toli na ye likoló na bandakisa misato ya mikemike: «Mbuma ya malamu mpe matiti mabe, mbuma ya dongodongo, levire kati na farini». Mokano mwa yango ezali ya komonisa boni boni Bokonzi bwa Nzambe eyàka na mokili, lolenge kani esalaka na bomoi ya bato, ndenge ekolaka, ndenge epusaka mpe ebongolaka mokili ontei na yango.
Kotya motema na Nzambe
Nganga Mokonzi Monene alobaki ‘te Nzambe azali na lolenge na ye ya kosala “na bomoyi bwa biso mpe na lisoló lya bato”. Bokonzi bwa ye epalangani ata na kati ya matiti mabe, ezali kosénga biso miso miye ekoki kososola malamu ata oyo ezali kokola na molili ya mabe, kasi kosambisa té makambo manso nokinoki. Léon XIV alimbolaki ‘te: «Ezali lokola mbuma oyo eleki moke na kati ya mboto nyonso, yango wana eséngaka kozala na motema molai mpo na koyeba ndenge ya kolanda makambo oyo ezali koleka, koyeba yango na makambo mikemike ya bomoi ya mokolo na mokolo mpe na makambo ya mikemike ya bomoi ya bato banso». Abakisaki ‘te bokonzi bwango ezali «kokola na ndenge oyo emonanaka te, lokola levire na kati ya farini, mpe na ndenge yango ezali kolongola biso na mawa mpe ezali kolendisa biso tózala na mpiko ata tango tozali kokanisa ‘te Nzambe azali te». Ya solo, “azali tango inso elongo na biso mpe bolingo bwa ye ezali tango inso kosala kati na biso”.
Na kobakisa, Pàpa azongelaki ‘te na bantango mosusu “tozelaka eloko moko ya kokamwa, tozelaka Nzambe moko oyo akoka kokita ut’o likolo mpo na kolongola mbala moko mabe oyo ezali kati na mokili”. Tokanisaka Nzambe ya makasi mpe ya nguya mpe, kasi ezali mawa mingi, mpamba te, tokokisaka elilingi wana nde na lolenge na biso ya kozala bakristu mpe ya kozala eklezia. Yesu alobaki lisusu ete: “Bokonzi bwa Nzambe ekokani na mbuma oyo elónami kati na matiti mabe”.
Mbóto ya moke koleka kati ya mboto binso, oyo ebutisaka nye fufu ya mampa
Na masolo maye, episkopo ya Roma alobaki ‘te, “Yesu akebisi biso na masenginya ya komona Nzambe lokola moto na nguya, oyo azali komilukela makambo na makasi, oyo azali kozwa esika ya koyangela, oyo azali koya na elonga nyonso mpo na kosunga biso”. Léon ya zomi na minei alobi ‘te Nzambe apesaka motuya mingi na bosawa bwa moto, elembo ya bolingo bwa yé ya, oyo etikaka biso na bonsomi ya kondima to koboya yé, oyo ezali koluka lolenge ya kofungola nzela, ata na kati ya makambo ya mabe. Matiti mabé esalaka makambo na nsé, ya kobatama mpe na polele te, lolenge ya mbóto moke, oyo ata ezali moke koleka, ebutisaka fufu ya mampa na bonkùku.
Lolenge ya Nsango Elamu
Na nsuka, Pápa Léon XIV alendisaki moto na moto oyo azalaki wana ‘te andima lolenge ya kosakola Nsango Elamu, tosambisa noki noki té bato na lolendo, na kokonza na makasi te, na kozanga kobungisa elikya na mosala mwa Nzambe. Pàpa Ratzinger alobaka na mateya ma ye ya mokolo mwa zomi ya sànzà ya zomi na mibale ya mobù 2000, Tozali lokola nkona moke ya Nsango Elamu oyo ezali kokola, lokola levire ya bolingo oyo ezali kobongola fufu ya mampa ya mokili. Na yango, Léon XIV asukisaki 'te, «Tokozala biso moko lokola mbóto moke ya Nsango Elamu oyo ezali kokola, mpe lokola levire ya bolingo oyo ezali kobongola fufu ya mampa ya mokili».
Matondo mingi na ndenge otangaki lisolo liye.
