Makambo minene misalemaki o mokolo mwa motóbà ya Léon XIV na Espagne.
Bansango ya Vatikan
Mokolo mwa minei, mwa zomi na moko ya sànzà ya Yuni (11 juin), mokolo ya liboso ya Papa na bisanga bya Canaries, eteni ya misato mpe ya nsuka ya mobembo mwa ye na Espagne, ezalaki na bokutani nà bato baye basungaka na koyamba bato bakimá-mboka, to ba migrants, na libongo lya Arguineguín na Las Palmas, esanga oyo ya monene (Grande Canarie). Na sima elandamaki na bokutani elongo na baepiskopo, basàngó, ba diakoni, banganga-Nzambe, bamamelo, baseminaristi mpe bato ya pastorali ya Catedrali ya Sainte-Anne ya Las Palmas ya Grande Canarie. Na ebandeli ya mpokwa, Tata Mosantu akambaki misa ya Eyenga ya Motema Mosantu mwa Yezu na stade ya Grande Canarie.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye
