2026.06.19 : Na tango o mokolo mwa zomi na libwà ya Yuni ya mobù 1982 (19 juin 1982), Robert Prevost akulaki Bonganga. 2026.06.19 : Na tango o mokolo mwa zomi na libwà ya Yuni ya mobù 1982 (19 juin 1982), Robert Prevost akulaki Bonganga. 

Robert Prevost akómaki Nganga-Nzambe o mokolo mwa 19 Yuni 1982

Eleki mpenza mbula 44 banda Leo XIV akulaki bonganga-Nzambe na ndako-nzambe Sainte-Monique, na Place du Saint-Office. Dioseze ya Roma etindi maloba ma lokùmu mpe elobi ‘te «ezwi ndakisa kitoko na bomipesi bwa yé mokolo na mokolo mpo na kimya».

Bansango ya Vatikan

 

Bambula tuku minei na minei eleki, na ndako-nzambe ya Sainte-Monique, oyo ezali mosika te na Vatikan, Robert Prevost, oyo azalaki na mbula tuku mibale na nsambo, akulaki bonganga-Nzambe. Mbula mitano liboso, akotaki na Lingomba ya Saint-Augustin, mpe na 1981, asalaki elako enene. Na sànzà ya Setembe ya mobù mwango, akómaki na Collège international Sainte-Monique, na Roma, mpo na koyekola mibeko mya Lingomba ya Katolike na Université pontificale Saint-Thomas-d’Aquin (Angelicum).

Mwa basanza nsima, akulaki bonganga na esika oyo sima esengelaki ekómaki libótà lya yé. Prevost afandaki na Palais du Saint-Office kobanda 2023 mpe, kaka na mbula ena, na mokolo mwa 30 sanza ya libwa, Pápa François akómisaki ye kardinale mpe apesaki ye diaconie ya Sainte-Monique.

Na zali Mosàleli wa yo

Mwa elili moko oyo etikalaki elembo ya mokolo monà, ebimisaki mwa ekeko ya moke ya ekeke ya zomi na mitano (15è S) ya ekólo Russie; ezalaki kolakisa ekwelà enà. Maloba baponaki, ewùtaki na lisoló ya Saint Augustin ya 399 mpe ezali koloba ‘te: «Mpo na ngai, koleisa bino nyonso na limpa ya mpamba ezali likambo oyo nakoki kosala te. Kasi Liloba liye lizali likabo na bino. Nazali koleisa bino na yoko mesa oyo ezali mpe koleisa ngai. Nazali mosàleli na yo».

Robert Prevost akómaki sàngó, tango azalaki nà bambula tukù mibale na sambo (27 ans)
Robert Prevost akómaki sàngó, tango azalaki nà bambula tukù mibale na sambo (27 ans)

Bilako bya dioseze na ye

Kati na liyebisi moko, oyo dioseze ya Roma epai wapi azali episkopo, ezalaki kopesa ye malako malamu, ezali koloba ‘te: «Toyebi malamu mosala mwa ye mpe tozali kolendisama na bomipesi bwa ye ya mokolo na mokolo mpo na kosakola Bokonzi bwa Nzambe mpe koluka kimya». Dioseze elaki ‘te «ezali kosunga ye na bolingo mosusu ya sika, mpe na losambo ya basantu banso ya Nzambe ; bazali kosenga mpo na ye, makasi ya bato ba bosawa.

Tika ‘te Ngongo Mosantu wa Bolingo bwa Nzambe abatela ye mpe apambola to abenisa mosala mwa ye.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

20 sánzá ya motóbá 2026, 09:20