Luka

Léon XIV elongo nà José María Balcázar Zelada, Mokambi ya Répibliki ya Pérou Léon XIV elongo nà José María Balcázar Zelada, Mokambi ya Répibliki ya Pérou  (ANSA)

Pàpa ayambi na masólo mokambi ya ekólo ya Perou

José María Balcázar Zelada ayambamaki o mokolo mwa 18 ya Yuni na Palais apostoliki ya Vatikan. Na masólo nà Secrétariat ya Etukà, balobelaki mingi makambo matali likambo ya bato nà nkita ya ekolo enà, nà esaleli ya moyibi ya mabanga mantalo, mpe bomipesi mpo na bosangani bwa bato. Bokutani nà kardinal Pietro Parolin, Mokomeli ya Etukà ya Saint-Siège, basololaki mpe na ntina ya likambo ya mibembo na mboka mompaya, ba eyoma ya kokàna mpe ba matata.

Bansango ya Vatikan

 

Na mokolo mwa 18 ya sànzà ya Yuni, Pápa Léon XIV ayambaki José María Balcázar Zelada, prezida to mpe mokambi ya ekólo Pérou, oyo na nsima akutanaki nà Kardinal Pietro Parolin, Mokomeli ya Etukà (Secrétaire d’État), elongo nà Mgr Paul Richard Gallagher. Oyo azali Mokomeli mpo na boyokani na bikolo mpe bibongiseli ya mokili mobimba (Organisations internationales).

Masóló ya Pàpa nà José María Balcázar Zelada
Masóló ya Pàpa nà José María Balcázar Zelada   (ANSA)

Masóló ya Pàpa nà José María Balcázar Zelada

 “Na tango ya masolo nà Secrétariat ya Etukà”, liyebisi lya ndako ya bopanzi sango ya Vatikan elobi: “bamonisaki bosepeli mpo na boyokani bolamu bozali kati na Vatikan mpe Pérou, mpe mposa ya kolendisa yango”. Na nsima, balobelaki makambo maye matali bango babale; na ndakisa “makambo ma nkita mpe bomoi bwa bato, mosala ya kotimola mabanga ma ntalo na lolenge ya moyibi, kotombola matómbà ma bato banso mpe kosolola, mpe kosala makasi mpo na kobatela bomoko bwa bato”.

Mokambi to Prezida ya Repibliki ya Perou, na kopesambote na episkopo wa lokumu Pietro Parolin
Mokambi to Prezida ya Repibliki ya Perou, na kopesambote na episkopo wa lokumu Pietro Parolin   (ANSA)

Liyebiso elobi lisusu ‘te : na tango ya masóló ma bango, “basololaki mpe na ntina ya makambo ma politiki ya mboka mpe ya mokili mobimba; mingi mpenza batyaki likebi na likambo lya mibembo o mboka mompaya, ba eyoma ya kokàna mpe makàmà ya bamatata”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

18 sánzá ya motóbá 2026, 16:40