Luka

Mintikà ya bandako ebebisami na ba bombi ya bitumba na Ukraine Mintikà ya bandako ebebisami na ba bombi ya bitumba na Ukraine  (ANSA)

Pápa asengi ‘te nkombo ya Nzambe esengeli te kozala na boyokani na bitumba

Na eyano apesaki na mokanda ebimaki na zulunalo «Piazza San Pietro», Pápa alobi ‘te mokumba ya eklezya ezali ya kobenga bato na kimya mpe ya kotelemela makasi baoyo bazali kosalela eklezya mpo na matómba na bango moko. Likambo ya mawa, mpamba te, bato bamibengaka bakristu bazali mpe kobendama na momeseno wana ya kobebisa nkombo ya Nzambe.

Bansango ya Vatikan

 

Ezali bongo “bililingi ya maloba ya ntóki”, lokola Pápa abéngaki yango, oyo Raffaele ya Catania alobaki kati na nkomá na ye na zulunalo “Piazza San Pietro”. Na esika yango, motángi azali kotuna ‘te: “Boni boni moto akoki kosopa makila ya moto oyo asali likambo te na kobenga Nzambe? Ndenge nini tokoki kobongola nkombo oyo esengeli kosangisa bato na esaleli ya bokabwani mpe liwa?”  Mituna miye mizali kobenga basusu, mpo na nini bato baponi koyinana na esika ya kolinga.

Léon XIV ayanoli mpe akanisi lokola ba missiles, ba drones mpe mandoki na Ukraine, na Moyen-Orient mpe na bisika mosusu ya mokili ememaki likàmà n abato baye basàli eloko te. Ut’o ebandela ya mokumba na ngai, nabengaki likabo ya kimia oyo “ezangi mandoki, ya komikitisa mpe ya bompikiliki”. Kimya oyo ebotami na Kristu, esengeli kotatolama, mpo ‘te Eklezia amipesi na koteya to kosakola ezalela ya masolo.

Masenginya mpo na kobebisa lokumu la nkombo ya Nzambe

Bato mosusu ya nguya na mokili moye - tokoki kotánga yango na makomi - bakoki kosepela na likambo lyango te. Bakomeka kokesenisa, kobomba mikano na bango ya bitumba na ntina ya mangomba - Kasi etindà to misio ya Eklezia, misio ya Mokitani ya Petro, ekoki kozala bobele ya “kobyanga mpo na kimya”. Mosala mwa ye mosusu ezali ya “kofunda to kotelemela na makasi manso, baye bazali komeka kotya nkombo ya Nzambe na misala mya bitumba” mpe oyo ekoki te “kobebisama na mposa ya bokonzi, na lolendo mpe na bokeseni; mingi mpenza basengeli te kobelela nkombo na yé mpo na kolóngisa bikateli mpe misala mya koboma”. Na mawa nyonso, Pápa alobi ‘te “esimbisi enà ya kobebisa nkombo ya Nzambe ezali mpe kokómela baoyo bamibéngaka bakristu”.

Kolanda Nzela ya Boboto

Na kosukisa, episkopo wa Roma, nsima ya libyangi na ye ya kolongola maloba, alendisaki bakristu, bàsala mpo ‘te ata maloba ma boyambi moko te, ekoka kokangama “na bitumba ya politiki”, na “Bobenisi to lipamboli ya bolingo ya ekólo to mpe lolenge oyo mangomba elongisaka mobulu mpe bitumba ya mandoki”. Mbélà ezali ya “kolóna to kokólisa losambo, makambo ma molimo, bosololi kati na mangomba, lokola nzela ya kimya mpe lokola lokótà ya bokutani kati na mimeseno mya bonkoko (traditions) mpe ba evandeli ya bato (culturez)”. “Yango ezali likambo lya ntina mingi mpo na biso banso bakristu”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

15 sánzá ya motóbá 2026, 21:27