Pàpa amati na mpepo, akei na Espagne, ezali ebandela ya mobembo mwa ye ya bontómà ya mbala ya minei
Bansango ya Vatikan
Ngonga mibale na ndambo ya mpepe: yango nde bowùmeli ya mobembo ya Pápa Léon XIV na Espagne. Alongwe na libándá ya mpepo ya Fiumicino na na ngonga ya 8h13 ya tongo ya mokolo moye mwa poso. Akokita yambo na Madrid, esika ya liboso ya mobembo mwa ye ya minei ya bontómà. Motó ya likanisi na yango to mpe devize ya mobembo na yé, ezali: «Alzad la mirada», oyo elimboli na lokotà ya lifalansa «Levez les yeux», bongo na lingala elakisi ‘te “Botombola miso ma bino”. Engumba-Mokonzi ya ekolo ya Espagne, elengelami mpenza mpo ya koyamba Nganga-Mokonzi, sima ya mibembo mitano milekà, oyo wapi, mibale ezali ya Santu Yoane-Polo ya mibale (Jean-Paul II) mpe misato ya Benoit XVI. Na Madrid, Mokambi ya ekolo, Roi Felipe VI elongo nà Mokonzi-mwasi, Reine Letizia, molongani way e. Sima bakokende na Ndako ya bokonzi (Palais Royal) mpo na milulu mya Boyei Bolamu mpe masóló elongo nà libota ya bokonzi.
Losambo elongo nà bilenge
Na sima ekolanda Bokutani na bakonzi bamboka, nà bayi-société civile mpe na bayi-diplomatiki. Na nsuka, na sima ya nzanga, akokende kotala ba oprateurs mpe ba beneficiaires ya projet social “Cedia 24 horas”. Na mpokwa, akozala na veillée ya losambo elongo nà bilenge, na Plaza de Lima.
Ba Telegrami na tango bazali na mpepo
Na kati yam pepo, Leon atindelaki mokambi ya ekolo ya Italie, Sergio Mattarella, Telegrami moko. Na kati ya mokanda mwango, Pápa apesi ye mbote ya motema mpe alaki ye losambo; alobi ‘te: “abondelaka na motema mobimba mpo na bolamu mpe bomengo ya ekólo Italie mobimba”. Kati na makomi mànà, akundoli ‘te mobembo mwa ye na Espagne ezali kosalema “na lisalisi lya bolobeli bwa mama Ngondo Maria oyo azali koyamba biso mpe azali kokamba biso epai ya Nzambe, liziba lya bomoko mpe ya elikya mpo na bato banso”.
Mpo na kozongisa eyano epai ya Pàpa, Mokonzi ya Ekolo ya Italie alobi o bozindo bokeseni oyo ezali kati na mokili mobimba mpe ntina ya koluka biyano na mituna ya ntina mpo na bomoi mpe mikolo mizali koyà. Sergio Mattarella azongeli libyangi ya kobota kimya na mitema, lokola Pàpa Léon XIV alingaki, mpo ‘te bitumba ezonga te. Nazali na elikya ‘te mobembo mwa bino ekopesa bato banso ya makanisi malamu, mposa ya kozala esika moko, kokutana mpe kosalisana.
(Ebongisamaki na mokolo mwa poso mwa motobà ya sànzà ya Yuni (6 juin) na ngonga ya 9:30 ya ntongo)
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye
