Pàpa akómi na Las Palmas ya Grande Canariem
Bansango ya Vatikan
O mokolo mwa 11 ya sànzà ya Yuni, na ngonga ya 10h38, Pàpa Leon XIV akitaki na libanda ya bampepo ya Las Palmas ya Grande Canarie. Botali bwa ye na esika enene eye ya esanga ya mbù Atlantiki, ekozala mpe mpo na kokende na Santa Cruz ya Tenerife. Sima nde Nganga-Mokonzi monene akokokisa mobembo mwa yé ya bontómà na Espagne.
Mbote ya nsuka na Barcelone
Na tongo moye, na ngonga ya 7h30, episkopo ya Roma alungwaki na ndako ya archiepiskopo mpe akendaki na libanda ya mpepo, epai wapi bayambaki malamu na bakonzi ya engumba. Sima Leon amataki na mpepo A320 ya Iberia oyo ememaki ye na Gran Canaria-Gando. Lokola ezali momeseno, batindami mpe bakonzi bayaki koyamba yé, mpe sima bakotaki o likita na kati ya salon VIP
Bokutani elongo na ba centre oyo eyambaka baluki-bisika ya kofanda na mboka mompaya.
Etapi ya liboso ya mobembo ya Pàpa na esanga ya Canaries ekozala bokutani nà ba centre oyo eyambaka baluki-bisika ya kofanda na mboka mompaya, na libongo lya Arguineguín, na ngambo ya sudi ya esanga ya Gran Canaria. Kino lelo, libongo ena ezali nayino na nkombo ya “Port de la honte, elimboli ‘te: Libongo lya nsoni”. Mpamba tè, na mobù 2020, mwa mikolo sima ya bokono ya Covid-19, bamigrants pene ya motuya 3 000 bakómaki wana na bowùmeli kaka ya poso moko. Mpo na ntina ya bokono bónà, epekisamaki na bango banso, baséma o libongo. Bobele Caritas nde elengelaki lisungi mpo ya kopesa bilei mpe nkisi, na baye babikaki sima ya bozindi na mayi. Moko ya ba Benevole bazalaki kosalisa, akoya kotatóla epai ya Pàpa.
Telegrami na tango ya mobembo
Na tango bazalaki kopumwa na mpepo, Leon XIV atindaki telegrami na roi Mohammed VI ya Marok, mpe asengaki lipamboli to bonenisi bwa yé. Bansambo mpe mabenisi etindamaki mpe na mboka Portugal, na mokambi António José Seguro.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye
