Luka

Na sànzà ya yuni, Léon XIV asengi bábondela mpo na motuya ya masano

Mwa mikolo moke liboso lya mimekano ya ndembo ya mokili mobimba, Pàpa Léon XIV abonzi losambo la sànzà ya Yuni mpo na motuya ya masano. Abengi yango : «Eteyelo ya bondeko, esaleli ya boboto mpe esika ya bokutani». Nde ntina ya mbela enà, mpo ‘te lisano lizala esaleli ya kimya, ya bokutani mpe ya masóló kati na mimeseni. Ekolisa limemya, bomoko mpe molimo ya komilekisa

Bansango ya Vatikan

 

Na ebandeli ya losambo la ye, Pàpa Leon XIV atombolaki mabondeli mpe atondi “mokonzi wa bpmoyi” mp ona likabo lya lisano. Asambelaki mpo na “baye bazali kokumisa Nzambe na nzela ya nzoto ya bango, mpo na kiboningà ezali kobotama na bisika ya masano mpe esengo ya kosakana elongo na lisàngà”. Nganga-Mokonzi monene asengi ‘te masano mazala bobele “eteyelo ya bondeko kasi ya bondongwani ya mpamba-mpamba te; esika ya bokutani kasi ya kolongola bato na lisàngà te; nzela ya boboto kasi ya mobulu te”. Alobi lisusu lolenge kani lisano ezali na “lolenge ya kolobisa bato ba mokili mobimba lokotà lyoko, ezali na makoki ya kosangisa bato ya bikolo ndenge na ndenge, ezali kosangisa bato mpe ezali kokolisa limemya, bomoko mpe bomipesi na makambo masusu. Na suka ya losambo, Pàpa abondeli Nzambe mpe asengi ‘te “Elimo na Yé ezanga te o kati ya biso. Mpamba te elimo ena esali biso ekipi moko, esangisi moko na mosusu mpo na kotonga bondeko mpe lisangà kati ya lisolo lya bato".

Lisano lokola nzela ya botongi boboto

Na mbula moko ya bokonzi bwna ye, ezali mbala ya liboso te, oyo, Pàpa Léon XIV atye mwa bokebi na motuya to bizaleli malamu ya masano. O mokolo mwa zomi na mitano ya sànsà ya Yuni ya mobù 2025 (15 Juin 2025), na milulu mya Zubilée ya masano (Jubilé du Sport) oyo esalemaki na Roma, alobaki ‘te masano ezali esaleli mpo na kimya. Ezali eteyelo ya limemya mpe ya bosembo, oyo ezali kokolisa boninga mpe bondeko. Na mateya ma yé kaka na mokolo wana, alobaki ‘te: “na kati ya société oyo ezali na elembo ya kozala yo moko (solitude), epayi wapi bongai (individualisme exacerbé) ekotisi likambo ya bo “biso” na bo “ngai” mpe ekosukisa na kobosana “moninga mosusu” (l'autre). Masano, mingi mpenza soki ezali kosalema na lisàngà to ekipi, “eteyaka mabongi ya kosàlà mosala na lisàngà, kotambola elongo”. Ezali esaleli makasi ya botongi mpe bokutani kati na bato.

Kala mingi tè, tango awùtaki koyamba bato ya masano ya Olympe mpe ya batengoli na yango na enguma ya Milan-Cortina (les athlètes des Jeux olympiques et paralympiques de Milan-Cortina) Pàpa alobelaki se likambo yango. Alingi tè ‘te “Masano ekoma esika ya mobulu mpe matata, kasi esengeli kozala esika ya kokutana! Ezala te mpo na kolakisa makasi, kasi mpo na komonisa boyokani”. Mpo na Pápa, basani ya masano basengeli kozala batatoli to mpe banzeneneke elembo ya lokotà yoko oyo mokili mobimba eyebi koloba: “Komekama kasi na bozangi koyinana, kolónga kasi na bozangi koyokisa basusu nsóni, kopola kasi na bozanga kobungisama”.

Papa François mpe, na vidéo ya sànzà ya Agusti ya 2016 (La Vidéo du Pape d’août 2016), oyo ezalaki na motó ya likambo ‘te: “Masano mpo na momeseno ya bokutani”, elakisaka “lolenge kani disipilini ekoki kosalisa bato ya mimeseno ndenge na ndenge bákóma bandeko”.

Masano, Gbagba ya masolo

Ya solo, momeseno ya masano lokola esaleli ya kimya ebanda kala mpenza, ut’o ebandeli ya masano ya Olympi (origines mêmes des Jeux olympiques.). Masano lokola Trève ya Olympi, eyebana na ba Greki ya kala na nkombo ya Ekecheiria, ebotamaki na ekeke ya lbwa (IXè S) yambo ‘te Yezu abotama. Esalaki na lisano, gbagba yam asolo mpo na bikolo biye bizalaki na matata kati na bango. Comité International Olympique (CIO) ezongelaki likanisi linà na mobù 1990, mpo nakolakisa motuya ya masano lokola esaleli ya kimya mpe ya boyokani.

Sàngó Cristobal Fones, Directeur international ya Réseau mondial ya Losambo la Pàpa, alobaki ‘te “Masano ezali moko ya bisika oyo bato bakutanaka. Ezali gbagba (pont) ya masolo oyo eleki ndelo, minoko mpe makanisi. Na elanga ya masano, na pisti, bato ya mimeseno mpe bikólo ndenge na ndenge bazali kosala makasi, bazali komipimela makambo mosusu, bazali kosepela na bolóngi mpe bazali koyoka mpasi ya kokweya to kopola. Yango wana Pape asengi biso tosambela mpo ‘te bizaleli malamu to motuya oyo ya bomoto - limemya, bomoko, komilekisa ya moto ye moko - etikala kaka na esika ya lisano te, kasi ebongola lolenge la biso ya kofanda elongo na mokili”.

Mpo na maye mataki Reseau Mondial ya Losambo la Pàpa

Reseau Mondial ya Losambo la Pàpa, ezali oeuvre pontificali. Ba pesà mokumba ya boyangeli bwa yango na lingomba ya ba Jesuiti. Sik’awa ezwami na bikolo tuku libwa (90 pays), esangisi bato koleka milio 22 oyo bazali koluka kozwa biloko bya kobikela mokolo na mokolo na lolenge ezali kopesa bango nzela ya kosala elongo na mosala mwa Kristu. Ontei yam osala monà, ezali nà maloba Papa abimisaka sànzà na sànzà mpo na kobondela. Maloba mana ezali kosɛnga ‘te tótya likebi na mikakatano miye bato bazali kokutana na yango mpe na mosala mwa eklezya.

Ebandisamaki na mobù 1844 na kombo ya Apostolat ya Losambo, ezwaki ndingisa na sànzà ya desembé (zomi na mibale) ya mobù 2020 na Papa François lokola Fondation ya Vatikan. Bongo mibeko mwa yango mya nsuka endimamaki na sànzà ya Yuli (sambo) ya mobù 2024.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

02 sánzá ya motóbá 2026, 15:43