Luka

Na miniti moko, mokolo mwa sambo ya Léon XIV na Espagne

Bililingi biye biwùti bobele na Vatikan, elakisi lolenge Pápa akómaki na esanga ya Tenerife, na Espagne, o mokolo mwa sambo ya mobembo na ye ya bontómà.

Bansango ya Vatikan

 

O mokolo mwa sambo mpe ya nsuka ya mobembo mwa ye na Espagne, Pápa Léon XIV awùtaki na Grande Canarie mpe akómaki na Tenerife na tongo mpe akutanaki na bato bakimá-mboka (ba migrants) na “Las Raices”, moko ya bisika ya minene epai wapi bayambaka bato bakimá mboka na bisanga ya Canaries. Na nsima, na Place du Christ de La Laguna, na Santa Cruz de Tenerife, akutanaki na bato oyo basalaka mosàlà ya kosunga bakimi-mboka to baye bakendáka koluka bisika ya kofanda na mboka mopaya. Na nsima, na ntongo ya mokolo mwa mibale, asalaki misa ya nsuka na libongo lya Santa Cruz na Tenerife liboso azonga na Vatikan na mpokwa. Na nsima ya kobongola mpepɔ mpo na likàmà ya Airbus A320 ya Iberia. Talá makambo minene oyo esalemaki na mokolo mwa nsuka ya mobembo ya Léon XIV na Espagne.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

13 sánzá ya motóbá 2026, 21:52