Bokuse ya mobembo ya bontómà ya Papa na Espagne, na miniti mibale

Bililingi biwùti bobele na Vatikan emonisi makambo ma ntina mingi mpe maye ma kosimba motema, oyo Léon XIV asalaki na esanga ibériki: Mikolo sambo ya mosala makasi kati na Madrid, Barcelone mpe bisanga ya Canaries, mpe ebele ya bililingi ya kala. Na ndakisa, bofungoli ndako molai ya Sagrada Familia, mpe bokutani na bandako oyo ebongisamaki mpo na koyamba bato balukaka bisika ya kofanda na mboka mopaya to baluki-mboka (les migrants).

Bansango ya Vatikan

 

Ezali mwa likambo ekanamaki te kokweya ; motele ya mpepo (Airbus) A320 ya Iberia oyo esengelaki kozongisa ye na Roma, ut’o Tenerife, ezwaki mwa matata. Mpepo Falcon ya basodà oyo mokonzi Felipe VI apesaki Pápa Léon XIV mpo azonga na nsuka ya mobembo mwa ye na Espagne. Bililingi oyo euti na Vatikan emonisi makambo maye  masalemaki na mikolo mwambe oyo Pápa alekisaki na esanga iberiki (péninsule ibérique), kobanda na Madrid, Barcelone mpe bisanga ya Canaries. Ebandi na bokutani na bato ya dioseze na stade Santiago Bernabéu kino na bofungoli ya tour ya Yezu Kristu na basiliki ya Sagrada Familia. Bililingi biye bipanzanaki na mokili mobimba. Na bisanga byango, bokutani ya kokamwa esalemaki mpe elongo na bakimà-mboka, mpe bibongiseli biye bizali kosalisa mpe koyamba bango.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

13 sánzá ya motóbá 2026, 22:05