Luka

Na bililingi, mokolo mwa minei ya Pàpa Leon ya XIV na Espagne

Bililingi biùti bobele na Vatikan Media, ezali komonisa makambo maye Léon XIV akutanaki na yango na Espagne, o mokolo mwa minei ya mobembo mwa yé ya bontómà, ya mbala ya minei.

Bansango ya Vatikan

 

Barcelone ezalaki etapi ya mibale esengelaki na manaka ya Pàpa. Akomaki kuna o mokolo mwa mibale mpe akotikala kuna mikolo mibale. Leon XIV akutanai liboso nà ba bénévoles ya Madrid na ntongo, bongo sima ya mwa ngonga moke akómaki na Barcelone, akambaki milulu mya losambo la ngonga ya Nzanga na Katedrali Sainte-Croix et Sainte Eulalie. Na mpokwa, na Stade olympiki Lluis-Companye, Nganga-Mokonzi Monene akutanaki na etuluku ya bacakoliko ya Catalani, pene na bankoto tuku minei (40.000 personnes). Elongo nà bango, batikalaki na losambo ya butù mpe ayanolaki na mitùnà ya bilenge misato, na bankombo ya:  Ferran, Carmina et Cecilia.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

09 sánzá ya motóbá 2026, 21:15