Na bilili, mokolo mwa misato ya Leon XIV na Madrid

Bililingi biùti bobele na Vatikan Media, ezali komonisa lolenge oyo Léon XIV akómaki na Espagne na mokolo mwa misato ya mobembo mwa ye ya bontómà ya mbala ya minei.

Albys KBD, CP -Kinshasa/RDC

 

Na tongo bokutani nà bato ya parlema ya Espagne mpe baepiskopo; na sima ya nzanga, losambo mpe bopesi lokùmù na Notre-Dame ya Almudena mpe bokutanina lingomba ya dioseze na stade Santiago Bernabeu. Wana ndé ezalaki makambo ma ntina ya mokolo mwa misato ya mobembo ya Pápa Léon XIV na Madrid, na Espagne, na boùmeli ya mobembo mwa ye ya minei lokola ntóma. Mobembo moye mokomema ye lisusu na Barcelone mpe na bisanga Canaries.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

09 sánzá ya motóbá 2026, 23:02