Makambo ma ntina ya mokolo mwa yambo ya Léon XIV na Espagne
Na tango akómaki na Madrid na tongo ya mokolo mwa poso, mwa 6 ya sànzà ya Yuni, mpo na mobembo mwa ye ya bontómà ya mbala ya minei. Oyo ezali mobembo mwa ye ya liboso na Espagne, Léon XIV ayambamaki na libotà lya bokonzi ya Espagne, yambo ‘te asolola nà bakonzi ya ekolo ena. Na nsima, asololaki nà bato baye bazali na likàmà, na Cedia 24 Horas, mpe na nsuka ya mokolo monà, asololaki nà bilenge koleka 600 000 oyo bayanganaki na Plaza de Lima mpo na kobondela elongo na episkopo ya Roma.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye
07 sánzá ya motóbá 2026, 17:17
