Makambo ma ntina ya mokolo mwa mitano ya Léon XIV na Espagne

Bolanda na bililingi biye, lolenge makambo makeseni malekaki na mokolo mwa mibale Pápa Léon XIV azalaki na Barcelone, mpe na misa oyo esalemaki na ndako-nzambe monene ya Sagrada Familia na mokolo mwa misato na mpokwa.

Bansango ya Vatikan

 

Mokolo mwa mibale na Barcelone mpo na Pápa, na ndùlu ya linaka la ye, ekpzala na likita elongo nà bato na boloko to bakangami ya boloko ya Brians 1. Sima elandaki losambo la sapelé na monastele ya Montserrat, oyo ezwami na ntaka ya ba kilometele tukù minei na mboka mokonzi ya Catalani. Na nsima ya nzanga, Nganga Mokonzi Monene akutanaki nà batindami ya organisations ya caritas oyo ealisaka bato. Bongo na pokwa, akambaki misa na ndako-nzambe monene to baziliki ya Sagrada Familia.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye 

11 sánzá ya motóbá 2026, 21:14