Léon XIV na Madrid, eteni ya liboso ya mobembo mwa ye ya minei na Espagne

Na ngonga ya 10h12, na ngonga ya Madrid, Mpepo A320 ya ITA Airways oyo ekumbaki Leon XIV elongo na bato bakei kotika yé, ekitaki na «Adolfo Suárez», esika bampepo ya mokili mobimba ekitaka (aeroport international) na Madrid-Barajas. Nganga-Mokonzi Monene abandi bongo mobembo mwa ye ya bontómà ya mbala ya minei na ekolo ya Espagne.

Bansango ya Vatikan

 

O mokolo moye mwa Poso, mwa 6 ya sànzà ya Yuni, na ngonga ya 10h12, tango ya mboka ena, Pàpa Leon ya XIV akomaki na ekolo ya Espagne. Bangonga ya kopumbwa na mpepo ezalaki mibale nà ndambo ; mpepo A320 ya ITA Airways ekitaki na «Adolfo Suárez», esika bampepo ya mokili mobimba ekitaka(aeroport) na Madrid-Barajas. Ndé kuna bayambaki ye.Episkopo ya Roma abandaki bongo mobembo mwa yé ya bontómà ya mbala ya minei, na ekolo ya Espagne.

Bokutani ya bakonzi na libándá esika bampepo ekitaka «Adolfo Suárez »

Tango akomaki na «Adolfo Suárez», esika bampepo ya mokili mobimba ekitaka na Madrid, Leon XIV ayambamaki na Mokambi ya Espagne, Roi Felipe VI elongo nà mwasi wa ye, Reine Letizia. Na esika ena, ezalaki mpe nà Mgr Piero Pioppo, ntómà ya Pàpa na Espagne, mpe ya principauté ya Andorre. Ezalaki mpe nà Mgr Luis Javier Argüello García, archeveki ya Valladolid mpe mokambi ya Lisanga ya baepiskopo ya Espagne.  Sima ya kopesa mbote mpe kolakisa ba délégations na bango, Pape mpe bakonzi-banene ya Espagne basololaki na esika ya bonkutu moko ya lokumu ya esika bampepo bakitaka (aéroport).

Pàpa elongo na libotà ya bokonzi ya Espagne
Pàpa elongo na libotà ya bokonzi ya Espagne   (@Vatican Media)

Misàlà mya liboso ya Pàpa na Espagne

Na nsima ya likita lyango, Léon XIV akokende na ndako ya bokonzi (Palais Royal), epai wapi kuna molulu mwa koyamba ye ekosalema. Ntango akokóma na ndako ya mokonzi ya Espagne, bakonzi ya Espagne bakoyamba ye, basoda bakopesa ye lokumu ya mosala, bakoyemba banzembo ya ekólo na ekólo mpe bakomonisa batindami na Espagne.

Na nsima ya nzanga, episkopo ya Roma akokende kotala bavolontaire mpe ba bénéficiaires ya projet social «Cedia 24 horas» «Cedia Ntongo saa», na centre ya information mpe ya bokutani. Na mpokwa, Pápa akokamba molulu mwa butu ya mabondeli (veilléé) elongo nà bilenge na “Plaza de Lima”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

06 sánzá ya motóbá 2026, 16:49