Leon XIV epai ya bato ya Masano: Bambula ya momekano mozali koleka, kasi bizaleli bilamu bitikali
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Bawùti na bikolo ndenge na ndenge mpe bazali na mposa moko mpe na bizaleli ndenge moko, koleka bokeseni bonso ya lokóta, ya ekolo to ya mimeseni mya bonkonko, bakambi ya lisangà ya Italie ya kosuba na mayi, basani mpe na bangani ya ba délégations oyo bazali na likita ya championnats internationaux ya kosuba (natation). Bayambamaki 62ème Trophée Sette Colli, o mokolo mwa minei mwa tukù mibale na mitano ya sànzà ya Yuni (25 juin) na Pàpa Léon XIV, na salle Clémentine.
Papa alobi ‘te “likambo oyo, eteli sé bikwélà ya masano ya mokili mobimba, ezali elembo ya elikya”, “elembo ya mokili moye biso tolingi; oyo ezali kopesa nzela na bokutani ya kimya kati na bato mpe na bondeko”
Mayi, elembo ya bomoyi bwa sika kati na Kristu
Pape alobaki ‘te masano mazali mpe libakù lya kokóla na elimo; bongo lisano kosuba ezali na eloko moko ya ntina mingi mpenza. Kosala yango, tango ozali ya kozindisama na eloko moko, oyo babengi mayi, ezingi moto, ezali “kokundola na lolenge ya bililingi, eloko moko oyo tósalemi na yango, ut’o libumu ya mama na biso. Yango ‘te: kozala na bomoi elimboli koyekola kotambola na boyokani elongo nà basusu mpe ezingelo, zonga-zonga ya biso”. Mpo na Bakristu, Léon XIV akobaki na koloba, “mayi mazali lisusu elembo ya batisimo mpe ya bomoyi bwa sika kati na Kristu”.
Mituyà to mabongi malamu ya masano: komipesa, bomoko, bosembo
Pàpa, lokola ye moko alingaka mingi lisano ya tennis, amonisi na lisikulu na ye, mituya to mabongi malamu ya lisano. “Mpo ‘te eleko ya kopota mbangu mp ona mimekano ezali koleka, kasi bizaleli esengeli kotikala”. Ya solo, masano, soki osali yango malamu, “ezali nkisi mpo na nzoto mpe mpo na molimo. Esangisaka bato ndenge na ndenge mpe etindaka bango na bizaleli ya ntina mingi, lokola komipesa, bomoko mpe bosembo”.
Na makambo ya masano, mingi mpenza oyo esalemaka na nivo ya mimekano, Papa alimbolaki lisusu ‘te, “moto asalelaka makasi ma ye ya mokano, kasi asalaka yango na lolenge liye ezali na bosénga bya yé. Nde yango esalaka bokeseni kati na motuyà ya bato ba masano: lolenge makanisi ma yé malamu etindaka ye”. Na nsuka ya lisukulu na ye, Pápa alendisaki bato ‘te bákoba kosala masano mpe bápalanganisa botuyà bwa yango epai ya bato basusu. Léon XIV apesaki mibali mpe basi oyo balingaka lisano ya kosuba mpe bato bato ba masano basusu, “na bolobeli bwa Santu Pier Giorgio Frassati, elenge mosani oyo, azalaki kolinga mingi komata bangomba”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye
