Luka

Léon XIV alendisi bilenge ya Espagne bázala “Mingàli mya mokili mwa sika”

Liboso lya bilenge nkoto nkàmà motobà basanganaki ontei ya Madrid mpona bùtù ya losambo, Pàpa ayanolaki na mitùnà bilenge motobà batùnaki yé, na maye matali libyangi to vokation na ye, liziba lya makanisi mayé mpe lolenge ya kozala mokristu na mokili mwa lelo. Sima ya mwa ngonga en aya bokaboli masolo, basàlàki milulu mya bokumisi Ukaristya, yambo ya bobenisi bwa Nganga-Mokonzi Monene.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Tango Benoît XVI akendaki na Madrid na libakù lya JMJ to mokolo mwa mokili mobimba ya bilenge ya mobù 2011, mboka eye ezalaki na esengo makasi tango ekutanaki na bilenge ya mokili mobimba. Kasi ya mbala oyo, Leon XIV asepelisi bobele bilenge ya Espagne. Alobi na bango ‘te bazali bilenge ya Pàpa (Esta es la juventud del Papa). Bazalaki mingi mpenza, ban koto na bankoto, na mipanzi ya nzela ememaka na Paseo ya Castellana. Ezali nzela monene ya engumba, oyo ezali koùta na centre historiki kino na stade ya Real Madrid, oyo Pàpa atambolaki na papamobile kino na place de Lima esika batyaki mpo ya koyamba yen à banzembo, mabina, miziki.

Na tango ya bùtù ya losambo ya Pàpa Leon XIV elongo nà bilenge, na Madrid
Na tango ya bùtù ya losambo ya Pàpa Leon XIV elongo nà bilenge, na Madrid   (@Vatican Media)

Leon asololaki na bilenge biye bizalaki na esengo makasi, lolenge yemei alobi. Bilenge motobà ya bambula kobanda na zomi na mitano kino tukù misato (15 - 30 ans), mibale mibale  basalaki ye mituna. Na oyo atunaki ye, basantu nani bazali bilembo ya bomoi bwa ye, longola Santu Augustin Tata way e wa molimo, Leon ayanoli na kopesa bankombo ya basantu misatu: ya liboso Santu Chrysostome, Tata wa Eklezya na ekeke ya minei (IVè siecle). Mateya ma ye, malongi apesaki, makomi ma yé mazali kosangisa bolingi bwa bosolo mpe nzela sema ya bomoi bwa yé. Ezalaki libakù malamuya kolendisa bilenge, babanga te na kolanda nzela ya bonganga-nzambe, nzela ya bomibonzà, to mpe banzela bisusu bya misàla o kati ya Eklezya. Mpe nzela mosusu ya libala, babanga te mpo ya kotonga libotà.

Pàpa Leon elongo nà bilenge motobà, basalaki ye mituna.
Pàpa Leon elongo nà bilenge motobà, basalaki ye mituna.   (@Vatican Media)

Bokoki kolanda bolayi bwa nsango eye, na lokotà ya lifalansa, nakofina na link eye : https://www.vaticannews.va/fr/pape/news/2026-06/voyage-espagne-leon-xiv-veillee-priere-jeunes-etincelle-humanite.html

 

Butù bwa losambo ya Pàpa elongo nà bilenge ya Espagne, na Madrid, o mokolo mwa 6 ya sànzà ya Yuni ya mobù 2026.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

07 sánzá ya motóbá 2026, 17:31