Luka

20023.01.05 Ndako ya Latran, esika ya vicariat ya Roma 20023.01.05 Ndako ya Latran, esika ya vicariat ya Roma  (Dnalor 01)

Léon XIV akómisi sika (abóngoli) mibeko mya Vicariat ya Roma

Mbongwana yango etaleli mingi mpenza lolenge oyo Vicariat ekotambwisama: mokumba ya Kardinal Vicaire etikali to mpe endimisami; kasi coordinasio ya ba servisi mpe ya ba structure administrative, epesami na boyangeli bwa «Moderator curiae».

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Mbula misato sima ya mbongwana Pápa François aséngaki na ntina ya Vicariat ya Roma, Léon XIV abongisaki Mibeko mya Lingomba ya Katoliko In Ecclesiarum Communione. Abimisi mpe motu proprio Confirma Fratres Tuos, oyo ebimaki o mokolo mwa mibale, mwa tùku misato ya sànzà ya yuni (30 juin).

O kati ya mokanda moye, Nganga-Mokonzi akundoli etindà Kristu apesaki na Petro : «Lendisà bandeko ba yo» (Lc, 22,32), mpe alobeli mokumba mwa Eklezia ya Roma, oyo ebyangemi na komonisa komunio ya Eklezia, oyo ebotami na mosàlà mwa Pétro. Sé bongo makambo ma eklezya esengeli kokambama tango inso na mokano ya kokóba etindà ya mosàlà mpe ya kosàlela bato ba Nzambe.

Na sima, tango babandaki kosàlela mokanda eye In Ecclesiarum Communione na sànzà ya yanuali ya mobu 2023, mosala ya pastorali mpe ya administration ya vicariat emonisaki makambo mosusu oyo esengelaki kotalela yango lisusu. Na yango, na mokolo mwa 25 ya sànzà ya Febwali, Tata Mosantu apesaki mitindo, bàtya etuluku moko ya bato ya mosala, mpo na kotalela mibeko miye mizali kosalelama mpe kopesa makanisi mpo na kobongisa yango.

Oyo Pàpa François asalaki, ekobongolama té, kobanda na dimension missionnaire mpe sinodale ya Eklezia ya Roma. Na kati ya makambo mingi ya sika, ezali nà likambo ya kokabola bokonzi elongo nà bayambi (coresponsabilité). Babyangemi na kosangana na bomoi mpe etindà ya eklezya, engebene na vokation mpe karisme na bango.

Mbongwana yango etaleli mingimingi lolenge ya kotambwisa lisangá ya vicariat. Na kati ya mibeko mya sika, bapesi mibeko ya pete mpe ya polele na maye matali lolenge ya kokabola mikumba kati na baorgane ndenge na ndenge. Mokumba ya kardinal-molandi lokola mokambi ya vicariat mpe zuzi ya dioseze endimisami. Kasi, bokambi ya ba coordination ya misàlà mpe ya ba structures administrative epesami na Moderator curiae. Pàpa aponi ye mpo na bambula mitano.

Lisusu, mibeko misusu mitali gérant-molandi mpe episkopo-basalisi to basungi milimbolamaki, mpe myango mitali koponama ya basàngó mpe basàngó-balandi. Biteni bisusu bibongwami te, bitikali se lokola etyamaki na mobù 2023.

Mokano mozali ‘te, mbongwana ya 2023 etikali kaka lolenge esalemaki: kokómisa Vicariat esaleli ebongi mpo na kosunga mosàlà mwa bopalinginyi Nsango Elamu; kolendisa komunio ya Eklezya mpe mpo na kosunga kotambwisa bomoyi ya Dioseze ya Roma.

François abongisaki Vicariat ya Roma: ekomaki collégial koleka mpe ekangami mingi koleka na Pápa, na sànzà ya Yanuali na mobù 2023.
François abongisaki Vicariat ya Roma: ekomaki collégial koleka mpe ekangami mingi koleka na Pápa, na sànzà ya Yanuali na mobù 2023.

 

 Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

30 sánzá ya motóbá 2026, 16:33