Leon XIV akómi na Barcelone
Bansango ya Vatican
Pàpa akomi na Barcelone, télémé ya mibale ya mobembo mwa yen a Espagne. Mpepo A320 ya Iberia, elungwaki na Madrid na ngonga ya 11h52, ekitaki na Josep Tarradellas Barcelona-El Prat, libanda ya mpepo to aeroport, na ngonga ya 12h45. Mwa batindami ya bakonzi ya Cataloni bayambaki ye, mpe bamemaki ye na mutuka kino na Catedrali Sainte-croix-et-Sainte-Eulalie mpo na losambo la ngonga ya nzanga (milieu du jour), esika archidioseze ya Barcelone ezwami. Ezali na ntaka ya ba kilometele zomi na mitano (15 km) nà esika ya bampepo bapumbwaka.
Pàpa akómaki na Adolfo Suárez Madrid-Barajas, esika to libanda ya mpepo ya mokili mobimba ekweyaka to mpe ekitaka. Ezalaki sima ya bokutani nà Ifema, ba benevoles oyo basungaki na bowùmeli bya mikolo miye minei na ba ekweya ndenge na ndenge ebongisamaki na engumba-Mokonzi ya Espagne. Yambo ‘te alungwa, José Cobo Cano, archeveki ya Madrid apesaki ye mbote, elongà na ba konzi ya mboka, basokoro to basoda mpe basàli ya libanda ya mpepo.
Mpepo eye Leon amataki elongo nà bapanzi-nsango tùkù mwambé, etambolaki na ntaka ya bakilometele nkàmà mitano (500 km) mpo ya kokoma na enguma monene ya Catalani, o mokolo moye mwa mibale mwa 9 ya sànzà ya Yuni. Akozala na losambo la ngonga ya nzanga, mpe butù ya losambo elengelami na ngonga ya 20h na Stade olympiki Lluis Companys.
Motango emonisi ‘te bokutani motobà elengelami mpo na Nganga-Mokonzi Monene na engumba eye ya Catalani. Pàpa akolungwa o mokolo mwa minei na ntongo mp ona kokende na Las Palmas de Gran Canaria, na esanga ya ba Canaries
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye
