2026.06.26 Misa ya bofungoli ya likita lya baepiskopo wa lokùmu , ekambamiaki na Pàpa elongo nà ba kardinali 2026.06.26 Misa ya bofungoli ya likita lya baepiskopo wa lokùmu , ekambamiaki na Pàpa elongo nà ba kardinali  (@Vatican Media)

Léon XIV afungoli likita ya ba Kardinali mpe alobi ‘te “etumba ebongi tè bobele na moto”

Likita lya Bakardinali ekobanda na mokolo mwa mitano, mwa 26 Yuni na Vatikan, nà molulu mya Ukaristya, oyo ekambama na Pápa, na Baziliki Saint-Pierre. Na lisukulu la ye, Léon XIV abengaki ba Kardinali bàzala na bososoli ya kofandaka na bomoko makasi nà Kristu, oyo, «nzete ya vinyo ya solo», na mikolo mibale minà, mpo na kobota mbuma mpo na Eklezia mpe mokili. Asengaki bango mpe ‘te bàlendisa kimya, bosangani (colégialité) mpe bomoko elongo (sinodalité) na mosala mwa libota mobimba ya bato.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Basangani zingazinga ya lotale ya Mokonzi, pene na lilita lya Santu Petro, ba episkopo wa lokùmu to ba Kardinali baye bawuti na bisika binso ya mokili. Bafungolaki lisanga na kolakisa na Mokonzi “mangomba mpe bato” baye bazali ontei ya mitema mya bango. Na ebandeli ya lisukulu na ye, Pápa alobaki ‘te “bazali mpe na mikano ‘projets) mpe na bilembo ya makambo bazali kosala na mosala mwa bango ya kobatela bampate”. Episkopo ya Roma atyaki mbala moko, na nsé ya elembo ya Evanzile ya Yoane, bokutani bónà.

Na yango, Pàpa akóbi na koloba ‘te, bokutani bónà bozwi mwinda na esika moko moye mozali mwinda, ndé Kristu ye mei, na bomoto bwa yé, oyo azali kolakisa na biso ‘te, azali nzete ya Vinyo”. Pàpa akundoli bango ‘te : «Ngransya mpe bosóló ekitaka na bomoyi bwa biso, na nzela ya Kristu; yango nde ezali “makila maye makobotisa mbuma na likita liye” ezali kofungwama.

Boyambi ezali liziba ya ba misio nyonso

Leon XIV apesaki lokola ndakisa, bomoyi bwa Santu Petro nà Polo, oyo balingi kokundola eyenga enene, mpo na bosósóli ya ba episkopo wa lokùmu. Mpamba tè, ndakisa enà, elendisi biso tosangana, na bondimi, bonsomi ya solo-solo. Mpe esikoli biso na masumu mpe na bobangi, mpe etindi biso tósakola Nsango Elamu. Pàpa abeti nsete ‘te: “Boyambi bozali libongi liye, ezali na bokasi, boye bozali yango moko te, kasi ezali kopesa bomoyi na Eklezia, mpamba tè ekokani na ngrasya eye ezali koleyisa bitapi bya nzete ya vinyo sé moko”. Akanisi na bango mpe lisusu ‘te, kopalinginya Nsango Elamu, kokula basakramentu mpe kosalisa bato ba Nzambe, ezali kobota mbuma.

““Kosakola Nsango Elamu, kosala milùlù mya basakramentu mpe komipesa na etónga ya Mokonzi esalemi mpe eboti mbuma na yango, na lolenge oyo tozali kondima ye, Mobateli to mokengeli malamu ya bampate”.”

Eteni ya mibale ya mateya ma ye, elobelaki likabo ya kimya na bomoko. Liboso lya matata mpe mobulu oyo ezali kati na bikóló mpe oyo ezali “kozokisa mpenza libota lya bato”, Léon XIV alobaki ‘te “Eklezya etikali kaka momemi mwa Elikya” na ndenge ezali kopesa maboko na misala minso mizali “kokùmisa lokùmu la moto, bosembo, mibeko, mpe moto”. Mokitani ya Petro akweisaki na makasi nyonso, eloko oyo etumba, alobaki ‘te “ekoki te bobele na moto, mpe ebenisami to epambwami na Nzambe te”. Bato bakelamá na “mayele mpe na mokano”, babyangemi na kosilisa matata na bango “lokola bato, kasi lokola banyama te, ata soki bazali na bibundeli ya batekinoloji ya makasi”.

Likita lya bakardinali – Misa ya bofungoli, ekambamaki na Pàpa elongo nà ba episkopo wa lokùmu to bakardinali
Likita lya bakardinali – Misa ya bofungoli, ekambamaki na Pàpa elongo nà ba episkopo wa lokùmu to bakardinali   (@Vatican Media)

Mpo na Léon XIV, “bomoko ya libota lya bato eleki liboso ya bato mpe bikólo moko na moko” mpe “ezali kaka te likambo yla siansi: ezali mpe mobeko ya bizaleli bilamu”. Yango wana, abeti nsete mpe alobi ‘te; “Kimya ezali mokumba ya bosembo, mpamba té tozali libota moko ya bato, bomoto moko ya kitoko oyo ezwami na Kristu Mokonzi mpe Mosikoli na yango”.

Moboko mwa bolingo 

Tango azongeli kolobela mokanda (encyclique) mwa ye Magnifica humanitas,  Pape Leon azongelaki mpe « likaniti (intuition) lya Paul VI na tango « apesaki likanisi ya «Civilisation ya bolingo» lokola nzela mosusu na logiki ya opposition. Litatoli lya Bokristu ekomi esakweli ya mokili mwa sika, Nsango Elamu mpe mosala, mwàngo ya mimeseno mya bonkoko mpe ya lisanga, oyo ezali kolendisa bokóli ya bato. Lolenge yo  akundolaki lisusu ‘te, «kati na bisengo mpe minyoko, Eklezya eponaka bilongi te, kasi ezali mpo na bato banso, mpe ezali kolobela moto na moto liloba sé moko ya kobongola motema mpe ya bosikoli to lobiko».

Bosangani (colégialité) mpe bomoko elongo (sinodalité) na mosala mwa Eklezya

Na eteni ya nsuka ya lisukulu na ye, Tata Mosantu alobelaki mingi ntina ya boyoki mpe bosolóli. Likita liye, esengi kolendisa lisangá mobimba ya Eklezya ‘te “etambwisama na bomoko kati na kondima to boyambi, na boyokani ya kimya, na botosi na Liloba lya bomoi oyo ezali Yezu”. Mbongwana minene ya mokili mwa lelo mozali kosenga na “kozala tango inso na bokengi” mpo na koyebisa na bato, “bosolo bwa seko, na lokotà loye ezali kopesa nzela ya koyeba yango na elongi na yango ya sika mpo na libela”, alandaki bongo, likanisi lya Pàpa François na Evangelii gaudium.

Likita lya bakardinali – Misa ya bofungoli, ekambamaki na Pàpa elongo nà ba episkopo wa lokùmu to bakardinali
Likita lya bakardinali – Misa ya bofungoli, ekambamaki na Pàpa elongo nà ba episkopo wa lokùmu to bakardinali   (@Vatican Media)

Pápa, moto oyo azali kosenga, kasi akonzaka te

Na nsuka, Tata Mosantu abimisaki lyoko likanisi na ntina na mosala mwa ye lokola mokitani ya Pétro, oyo ebyangi yé na bosàwà to na bomikitisi. Na ba episkopo wa lokùmu to bakardinali, alobaki ‘te lisungi oyo bakopesa na Mokitani ya Petro, ekokuta ye lokola “oyo azali kosenge, kasi té, oyo azali kopesa mitindo”. Bokonzi bwa Wayambo, ezali na moto oyo ayebi koyoka, mpe mpo na ntina se wana kaka, azali motambwisi. Ezali ya moto oyo ayebi koyekola mpe sé mpo na ntina wana kaka, azali koteya, ntango inso na kolanda Moteyi kaka moko”. Esukisaki Léon XIV, na kotika misala mya lisanga ya bakambi na lisungi lya bantómà, basantu Pietro (Pierre) mpe Polo (Paul).

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

26 sánzá ya motóbá 2026, 09:07