Leon na Roma, dokimantele elobeli ba mbula Prevost asalaki na Engumba ya seko
Bansango ya Vatikan
Nsima ya bililingi «León ya Perú » mpe «Leo oyo awùtà (from) Chicago», Radio Vatikana - Vatikan News ebimisi «Leone na Roma», dokimantele ya sika oyo ezali kolobela bambula biye Robert Francis Prevost, oyo azali lelo Pápa Léon XIV, alekisaki na Engumba ya seko. Eleko ya mibu soko ntuku mibale, kobanda na tango ayaki na Italie na 1981 ut’o Etats-Unis, nà bambula oyo alekisaki na bokonzi ya Ordre ya Saint-Augustin na boumeli ya bamandats mibale, kino na tango aponamaki na ebonga ya Prefet ya Dicastele mpo ya ba Episkopo. Na nsima, elakisi mpe eleko tango bakulisi ye bokardinale na mobù 2023. Bambula mingi ya kelasi to boyekoli, ya boninga, ya mibembo, ya bokutani, ya mayangani, ya pelerinaje, mpe ya mosala. Manso emonisami na nzela ya bililingi mpe na nzela ya biteni ya bavidéos oyo ebimi naino te, mpe na nzela ya maloba ma baninga ya mosala, ya baninga ya kelasi, ya baninga ya kala, ya basangani ya Lingomba ya Augustin mpe ya Dikastele mpo ya baepiskopo.
Leone na Roma eyei kokókisa nzela to etamboli eye epesamaki na bapanzi-sango ya Vatikan mpo na koyebisa na bato, bomoto mpe bomoyi bwa Nganga-Mokonzi monene. Etamboli eye ebandaki na dokimantele León ya Perú, oyo ebimaki na sanza ya Yuni ya mobu 2025. Ba Sali yango mpo na boumeli ya bambula oyo asalaki mosala ya misionele na ekólo oyo ya Amerika ya Ngelè (Sudi). Mpe elandaki na bilili ya Leo from Chicago – oyo elimboli na nkota ya lingala ‘te: Leon oyo awùtaki na Chicago, oyo ebimaki na sànzà ya Novembé, elobelaki bisika Mgr Prevost awùtaki na Amerika.
Ebimisami na esika bakobimisaka mikanda (direction editoriali) ya Dikastele mpo ya kopalinginya masóló. Dokimantele yango ekomamaki na bapanzi-nsango Felipe Herrera-Espaliat, Salvatore Cernuzio mpe Tiziana Campisi, mpe ebongisamaki na Jaime Vizcaíno Haro mpe Stefano Anella
Mokolo mwa misato, mwa 1er ya sànzà ya Yuli (1er juillet) na ngonga ya 18h00 (heure ya Roma), dokimantele oyo ekobima na YouTube ya Vatikan News, liboso na minoko misato (Lingelesi, Italien mpe Espagnol), bongo sima ekobima mpe na ba media ya mokili mobimba soki basengi yango. Mpo na bapanzi-nsango oyo bapesameli ndingisa na ndako ya bopanzi-nsango ya Vatikan, ekobima liboso o mokolo mwa misato oyo ekolanda, na ngonga ya mitano na sima ya nzanga, bakomonisa filme yango na esika babongisaka bafilme (cinemathèque) na Vatikan.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
