Barcelone epesi lopété na Pápa mpo ya kopesa lokumu na Gaudí.

Na libakù lya mobembo mwa Pápa Léon XIV na Barcelone, engumba yango elengeli kopesa ye libonza, liye, akozwa yango na tango ya misa na Sagrada Familia. Ekeleko, ezali kolobela lisoló mpe elimo ya mokili ya Gaudí, kasi lisusu losambo lya bato ya Catalogne.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

O mokolo mwa 10 ya sànzà ya Yuni, Barcelone ekopesa Léon XIV lopété moko na ntango akoya na Espagne. Eloko oyo ya losambo esalemi na nzete ya olive ya kala ya Catalogne, ya ébène ya Afrika, mabaya mawùti na Azia, na Amerika mpe na Australie. Lisusu, ekembisami na mabangá mikemike oyo maùtaki na mabelé epai Antoni Gaudí alekisaki bomwana na ye, kati na bilanga, mopepe mpe biloko bizalisami. Liboso kutu ekóma eloko ya losambo, ekeko yango emonisi makambo ya mabele ya bato mpe mpe ya molimo. Catalogne epiki misisa o mabele ma yango. Ezali mpe, eklezya oyo ezali komeka koloba minoko minso mya mokili.

Joan Serramià, mosàli mayemi mpe babiju, o kati ya mosàlà
Joan Serramià, mosàli mayemi mpe babiju, o kati ya mosàlà

Bomikitisi ya likabo

mosàli mayemi mpe babiju ya mboka Catalogne, Joan Serramià, àsàli poso mibale ya mosàlà na lombango, mpamba té ayebi ‘te tango ezalaka kaka ya manaka té. Alobi ete, «Nalingaki te ete ezala eloko ya kokembisa ».  mpamba té, «Gaudí atikala kosalela té bonzela lokola eloko oyo ezangi ntina ». Likanisi lyango ebimaki na ebandeli ya mobù moye, na libándá lya ba circuits officiels. Kobenga ya tsombo to telefone. Baninga basusu ya Gaudí na Reus (komine ya etúká ya Tarragone). Na nsima, bazalaki koyebisa bato makambo maye bazalaki koyoka, bazalaki kopesa mwa makabo, mpe bazalaki kosalisa bato na mayele. “Joan Serramià alobi ‘te: ‘Bakompanyi bisusu bizalaki na mposa ya kopesa mbongo mpo na misala minso”.  “Kasi tolingaki kosenga mwa mbongo moke. Nazali kozwa eloko moko te na mosala moye. Nazali kosala yango mpo na esengo ya kosala”. Sé mpo na bongo nde lopete wana (crosse) ezali na eloko moko na kati na yango oyo ekokani na losambo ya bato ya Catalogne, kondima wana ya solo oyo ezali koleka mingi na maboko ma bango koleka maloba.

Projé mpe likanisi

Na ebandela, mosàli mayemi mpe babiju akanisaki ‘te azwi likanisi lya tour ya Saint-Barnabé ya Sagrada Familia. Kasi tango azalaki kosàla liyemi na yango, ezalaki mokolo mwa Saint-Girard, makanisi masusu mayelaki ye na mbalakaka. Ayebaki ‘te Pàpa akoya na mpà ya tour ya Jésus-Christ. Nde na ngonga ena, manso mazwaki ndimbola. Ezali se bongo ebotamaki likanisi lya kuruse ya Gaudi (croix gaudienne). Yande nde ezali komonisama makasi na ngambo ya likolo ya liyemi. Ezali lokola mwa libanga moko ya monene, oyo etelemi semba, mpe emati likoló mpenza. Kasi lisolo lya crosse ekangami na oyo ya Gaudí ye moko. Ut’o kala, Joan Serramià, asalaka mosàla ya architecte na Reus. Mp ona kosàla yango, esengelaki libangà moko monene na nsé; bongo basengaki yango na Sagrada Familia. Kutu akanisi yango mpe alobi ‘te: “Babengaki biso mpe basengi na biso topono libangà esengeli na biso”, Na nsuka, libanga lyoko linene ya kilo zomi na mineyi (14 tonnes) ekomélàki biso.

Na bokundoli bwa Gaudi

Na mosala mwa mikolo mikoyà, ekomonisa ‘te, Gaudi esalemi na modele moye esàlémà nayino te, ya Vierge ya Miséricorde ya Reus, mosala oyo baboyaki kopesa ye koleka mibu nkama eleki. «Naponi kozongisela ye na nzela ya elilingi,  makambo maye baboyaki ye asala», elobaki ye. Alobeli architecte lokola moto oyo amelamaki na mosala mwa ye na esika ya kokumisa yango. “Alobaki ete atɛkaki biloko na ye nyonso mpo na Sagrada Familia. “Atekaki nyonso mp ona Sagrada Famiglia”, elobaki ye; “Bato ba mayele basalaka mpo na basusu, mpo na bango moko te”.

Mwa misala mya nsuka
Mwa misala mya nsuka

Kofungwama na mikolo mikoyà

Ekoki kozala mpo na yango nde elikya ezali makasi, tembe tè, mbala mosusu Léon XIV akoyà kotàla lilita ya Gaudí, na libakù lya bokundoli mibu nkama ya liwa lya motongi. O miso ma yé, likambo lyango ezali na ntina mingi koleka makambo ma kala ya eklezya. “Mokili ya poto ezali kobosana mokano mwa ye moko”, alobaki na mongongo ya nse, mpe abakisaki ‘te: “Lingomba lya Katoliko ezalaki libateli monene mpo na misala mya bontóki. Mpe misàlà minà mizalaki mayele mikobatelaka Mikili mya poto to Eropa”.

Na esika ya mosàlà (atelier) ya Joan Serramià, kati na palata, mabàyà mpe mabàngà, likanisi linà ezwaki makasi malembe-malembe. Ezali te lokola mposa ya kozonga nsima, kasi lokola motuna moye mozali nayino polele mpo na mikolo mizali koyà.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

01 sánzá ya motóbá 2026, 23:59