Luka

Na tango bazali kopesa Boyei bolamu na bakimi-mboka Na tango bazali kopesa Boyei bolamu na bakimi-mboka  (LEAH MILLIS)

Ba Migrés: Léon XIV asengi ‘te bakanga miso te liboso lya bakimi-mboka

Na sima ya Angelus, Papa alobelaki mokolo mwa 75è ya mokili mobimba mpo na bakimi-mboka, oyo basepelaki o mokolo mwa poso, 20 Yuni, mpe alobaki ‘te bakonzi ba bikólo basengeli kozala na bososoli ya kotambwisa na boyokani likambo lya bakim-mboka. Amonisaki mpe mawa ma ye mpo na likàmà ya motuka oyo ebomaki bilenge basani sambo ya basketball na Brésil. Tata Mosantu apesaki mpe mbote na basangani ya Dialogue international catholique-pentecôtiste oyo bazalaki na esika Santu Petro.

Bansango ya Vatikan

 

Moto moko te akoki koboya kotala to kokanga miso liboso lya baye bazali koluka libateli mpe bokengi”. Oyo ezali mbelà mpo na boyambi na kimya, na bomoto mpe na kolikya na mikolo mikoyà. Mbela eye, ebimisamaki na mokolo mwa lomingo, 21 Yuni, na esika ya Santu Petro, na sima ya losambo la Angelus.

Tóyamba bato baye bazali konyokwama

Na libaku lya bokundoli 75è mokolo mwa mokili mobimba ya bakimi-mboka, oyo ekosalema o mokolo mwa poso mwa mokolo tùkù mibale ya sànzà ya Yuni (20 Juin), ONU abongisaki milùlù mpo na kokundola mokolo moye konvensio ya statut ya bakimi-mboka, oyo esalemaki mpo na kobatela bato oyo bazali konyokwama mpe bapusi bango na makasi kotika to kolungwa bamboka ya bango. Na yango, Léon XIV alingaki ‘te elimo oyo epesaki nzela na kokoma mokanda mwango, ekoba lelomei “kopelisa bososoli ya bakonzi bya bikólo”. 

“Nalendisi moto na moto ‘te àyamba baoyo bazali konyokwama mpo ‘te bazala na bomoi ya kimya, ya lokumu, mpe ya kotalela mikolo mizali koya na elikya.”

Eklezya endimaka na nzela ya kobondela

Kati na ebele ya bandimi oyo bazalaki na Place Saint-Pierre na mokolo mwa lomingo mpo na Angélus, ezalaki mpe na basangani ya “Catholic Pentecostal International Dialogue”. Lingomba eye ekélàmaki nà mokano ya kotombola limemya mpe boyokani kati na eklezya Katoliko mpe eklezya Pantekotiste, mpo na maye matali kosalela boyambi. Na tango azalaki kopesa bango mbote na lokótà ya Lingelesi, Pápa alobaki ‘te “Eklezya endimaka na nzela ya kobondela” mpe amonisaki ‘te ezali na ntina mingi, naeleko eye, kokanisa na ntina na mobeko lex orandi, lex credendi.

Bayambi na tango ya losambo la Angelus.
Bayambi na tango ya losambo la Angelus.   (@Vatican Media)

Losambo mpo na likámá na Brésil

Nganga-Mokonzi Monene alakàki mpe losambo la yé mpo na bilenge sambo oyo babungisaki bomoi bwa bango to mpe bakufaki, o mokolo mwa yambo na likàmà lya motuka, na etúká ya Ceará na Brésil. Bilenge byango bazalaki na ekipi moko ya ndembo ya basketi mpe bazalaki kozonga na ndako na bisi sima ya kolonga na lisano na bango.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

21 sánzá ya motóbá 2026, 08:03