Papa Leon XIV,  na tango ya losambo la Angelus ya mokolo mwa 14 ya sànzà ya Yuni Papa Leon XIV, na tango ya losambo la Angelus ya mokolo mwa 14 ya sànzà ya Yuni   (@Vatican Media)

Angélus: «Kotàla ya Yesu ekobotisaka bato ba sika»

Yambo ‘te asala losambo la Angelus na Place Saint-Pierre, Pàpa azongelaki kolobela Nsango elamu ya Santu Mateo (Mt 9,36 – 10, 8), epai wapi Yesu aponi ba apostolu zomi na mibale mpe apesi bango etindà. Ezali misio kopesa libondi lya Nzambe na baye bazali konyokwama, komema bolingani bisikà bobóla bozali, elikya bisika mawa ezali, boyambi esika ya bozangi kondima

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Liboso lya bayambi 20 000 oyo bakutanaki na nse ya moyi makasi ya Saint-Pierre, Pàpa alobelakiNsango Elamu ya Santu Mateo, oyo Yesu atindi basali mpo ya elanga, mpe aponi bazomi na ibale. Nsango Elamu oyo ezali kopesa biso likabo linene, mpamba te ezali kokómisa bato banso eloko moko, baye bazali koyoka yango na miso ma Yesu. Kati na lisoló liye, Kristu azali komona ebele ya bato baye «batungisami mpe balembi» mpe ayokeli bango mawa.

Leon XIV alobi ‘te, Nzambe azali kotala mokili ya bato, “Azali komona monyoko oyo ezali konyata, mpe mobulu moye mozali kosilisa makasi ya moto. Amoni bbampota bya bitumba mpe kozanga ntina ya ezaleli ya kosomba biloko ebele. Amonaka bilongi ya bato oyo ezali lisusu na esengo te, mabota maye mabebisami na mabe, mpe bilenge biye bazali kobendama na makanisi mya lokuta. Yesu azali komono mpe alingi. Alingi mpe anyokwami mpo ya biso, elongo nà biso: motema mawa mwa ye emonisi bozalani pene kaka te, kasi mpe mposa ya kosikola”.

Kokabela bato libondi lya Nzambe

Liboso lya bato bakokani lokola “bampate bazangi mokengeli”, Yesu amikabi lokola Mokengeli mpatà malamu, lokola nkolo wa elanga, «atindi basàli na elanga ya mokili, mpo na kobóndisa baoyo bazali konyokwama, komema bolingani bisikà bobóla bozali, elikya bisika mawa ezali, boyambi esika ya bozangi kondima».

Nsango elamu elobeli bazomi na ibale, basàli ya yambo oyo bakomaki ba apostolu, «lokola ‘te ba misionele mpe basakoli». Na bowùmeli ya bikeke, «Nsango Elamu ebongwani té, etikali bobele tango inso elenge, ya sika, mpe ya kosikolama: ‘Bokonzi ya likoló ekómi pene!’ (Mateo 10:7)»

Liso, to kotala ekobongola makambo

Bokonzi byango ezali penepene na ndimbola oyo ‘te “Nzambe azali pene na mibali binso mpe basi banso, na bato banso mpe na mabota manso. Na yango, mokumba ya Eklezia ebandi na kotala Yesu, kotala oyo ebongolaka makambo: “Etondi na bolingo, likanisi na ye ezali kobota bato ya sika”. Ya solo, likabo lya Yesu ezali mpenza ya ofele, mpamba te motuya na yango eleki nyonso: moto akoki kolónga yango te, to kozwa yango na mbongo te, elobaki Pàpa Leon XIV.

Yambo ‘te asàla losambo la Angelus, Pàpa asukisaki mateya ma yé na kolakisa na bokuse ntina ya misio ya kopalinginya Nsango Elamu, oyo mosali nyonso abyangami kosala. Etindà eye “ezali kowùta na likabo lya Nzambe oyo, na Kristu, ekomi bolimbisi mpo na mokili, mosala na babóla mpe bato ya mpasi, mpe bomipesi mpo na bosembo”. 

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

14 sánzá ya motóbá 2026, 17:15