Angélus: Bolingo bwa solo esengaka komibimisa, kobungisa mpe koyamba
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
O mokolo mwa lomingo, mwa tuku mibale na mwambe ya sànzà ya Yuni (28 juin), molunge epekisaki te bato pene ya nkoto tùkù mibale (20 000) ya bato bamobembo to ba pelerins basanganaki na esika ya losambo Saint-Pierre mpo na losambo la Angelus. Na nse ya ba mumvudi ma bango mpe nà baekoti, oyo ezalaki na mitele ya mompepe, basangani bazwaki mbote mpe bobenisi ya Tata Mosantu ut’o lininisa lya ba palais apostoliki. Liboso lya kosàla losambo la Maria, Pápa azongelaki lisusu eteni moko ya Evanzile ya Mateo (Mt 10, 37-42).
Léon XIV azongelaki maloba ma Yezu ya kolanda ye mpe kozala banzeneneke ya Bokonzi bwa ye. Nzokande, Pápa akebisi ‘te: «Ezali bobele likambo ya mwa elembo na libándá te, kasi komipesa mobimba kati na boyokani ya bolingo elongo na Yé ». Bolingo boye bokoki kobota mbuma kaka soki esangisi makambo misato, lolenge Léon XIV amonisi yango: kokata boyokani na moto to mpe komibimisa, kobungisa, mpe koyamba.
Kokata boyokani to komibimisa
Episkopo ya Roma azongeli maloba ma Yezu mpo na komonisa ‘te boyokani oyo ekangami elongo nà Nzambe eleki biloko binso bya mokili, bakisa mpe ya libota: «Moto oyo alingi tata to mama koleka ngai abongi na ngai te» (v. 37). Na yango, Mokonzi alingi ‘te bayekoli ba yé bázala na bonsomi ya komipesa na mosàlà ya kosakola mpe bamipesa na mosala ya kopalinginya boyambi.
Kasi yango ezali solo mpo na moto na moto, elobi Leon XIV; ata boyokani ya bolingo oyo eleki ntina, ezwaka bososoli bwa yango na nzela ya bolingo oyo Kristu azali kopesa biso. Nganga-Mokonzi Monene apesi ndakisa ya libala, oyo esengaka kolongwa na ndako ya baboti mpo na kotonga ndako mosusu elongo nà molongani. Pàpa ya lingomba ya Augustin azangaka te kolobela mosantu mobandisi ya lingomba na yé. Na ndakisa ya moloni-bilanga oyo abungisi mpo na mwa ntango moke biloko biye alonaki, oyo Saint Augustin alobelaki mingi na (Discours 330, 2). Léon XIV alobaki ‘te : Kaka soki «abungisi» mbuma oyo aloni na mabele nde akoki komona yango eboti mbuma».
Kobungisa
Kondima kobungisa mpo na bolingo ezali mpasi, mingimingi o mikolo mya lelo , eleko oyo wapi kobungisa ezali na boyokani nà « bolembù mpe ntango moto azali na mposa makasi ya kozwa mpe kozala na biloko », endimi episkopo ya Roma. Nzokande, bolingo bwa solo ezali oyo esangisi « bomipesi bwa moto ye moko », soki ezali bongo te, ekopesa na mbuma te, elimboli Léon XIV. Wana azali kopesa bandakisa mingi mpenza: « na tango tondimi kobungisa mwa moke ya biso moko mpo na kopesa esika na mosusu, kobungisa mwa ntango mpo na koyoka moninga, kobungisa mwa libondisi mpo na kokabola mokakatano».
Nganga-Mokonzi Monene alobi ‘te : Yezu afungolaki nzela, «amikabaki to amipesaki, amibungisaki yemei», mpo na kobikisa basi mpe babali. «Lolenge loko mpe, soki tofandi na logiki ya likabo, biso mpe tokozala na makoki ya kobota bomoyi bwa sika na boyokani na biso», elendisi Papa.
Koyamba
Likambo lya nsuka mpo na bolingo malamu: boyambi, oyo ezali komonana na nzela ya bilembo ya mike-mike oyo mizali kozongisama mbala na mbala, na nzela ya kozala na ntango mpo na basusu mpe kosalela bango. Lisusu, Léon ya zomi na minei asengi na bato batala bayekoli oyo Yesu atindi : bazali «na biloko te», elingi koloba ‘te bazali na «bosenga, mpamba te, sé na lolenge lónà nde bakoki kobenda bokebi ya bato oyo bakokutana na bango. Na yango, moto nyonso ayambi moto moye ayei na nkombo ya Yezu, ayambi Yezu yemei mpe Tata wa likolo oyo atindaki ye. Bolingo mpo ya Mokonzi moleki nayino na koyamba bandeko».
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
