Luka

Angélus: Basantu Petro na Polo bamonisi bomoko ya Eklezya kati na bokeseni

Na mokolo mwa basantu Petro nà Polo, (Pierre et Paul), liboso lya kosala losambo la Angélus, Pape Léon XIV alobaki ‘te bantóma mibale miye, bazali kolakisa eklezia oyo ekoki kobongola bokeseni nà nkita to bomengo. Asengaki mpe bayambi balanda mokumba mwa bango ya bondeko, ya masolo mpe ya mosala kati na mokili oyo ekabwani.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Eyenga ya basantu Petro nà Polo, ba patrons ya Roma, ekundoli bondeko bwa ebandela oyo ezali kosangisa na lisanga ya boyambi mpe ya bolingi, Eklezia ya Roma nà ba Eklezia nyonso ya mokili. Elobaki Léon XIV na ebandeli ya bomanyoli bwa yé, o mokolo mwa yambo, mwa tuku mibame na libwà ya sànzà ya Yuni (lundi 29 juin). Abakisaki ‘te: «Bonzeneneke to Litatoli lya bantómà baye mibalé, ezali lokola elembo to mokoloto mwa Bondeko bwa Sika». Liwà lya bomartiro bwa bango na Roma, epesaki nzela na Nsango Elamu, ebota misisa ya libela ontei ya Bokonzi bwa Roma. Elakisáki “boyebi bwa Nzambe bwa sika mpe ya lokumu monene ya moto nyonso. Nà mpe ekisiperiansi ya sika ya nguya, lokola lolenge ya kokónza te, kasi lokola mosàla mpo na bomoi”.

Mbela mpo ya kokóba mosàlà to etindà ya Kristu

Mpo na Pápa, fnteke yango ezali kaka te mpo na kopesa lokumu na bantómà miye mibale; kasi mbela epesameli na baye banso bakuli batisimo. “Lelo lisusu, Mokonzi oyo mpo ya bolingi bwa yé, akufaki mpe asekwi, azali na bomoi na nzela ya litatoli na bango”. Pàpa Leon alimbolaki ‘te, “Kristu azali kokóba kokóma esika “ya kati mpe ya lubwaku, ya bingumba minene mpe na bitùkà ya mosika” na nzela ya baoyo bazali koyanola na libyangi lya yé: “Landá ngai”. “Mokolo mwa eyenga eye, esangisi biso na etindà to mosàlà mwa Petro nà Polo, oyo elingi kolimbola etindà ya Kristu yemei”.

Mokitani mwa Petro amonisaki mpe ‘te Nzambe atyelaka moto moko na moko motema, atako azali na bolembu. Alobi ‘te: “Nzambe atyelaki biso motema, biso basumuki oyo tolimbisami na Kristu, biso baye to lóngi te, mpo ‘te ngrasya ya yé emonisama polele kati na lisàpo la biso mpe mpo ‘te bokasi bwa yé oyo ebongolaka mabe na malamu, emonisama”.

Pàpa, na tango ya losambo la Angelus
Pàpa, na tango ya losambo la Angelus   (@Vatican Media)

Petro mpe Polo - Bokeseni mpo na mosàlà ya bomoko

Lisusu, Pápa amonisaki ete bantoma wana mibale ya lokumu bazalaki kosalisana. Petelo na Polo, abéngaki. Akundoli ‘te, Petro na Polo, “bakokaki te kozala na bokeseni koleka moko na mosusu, ezali kaka na bisika biye bautaki, kasi mpe mpo na bizaleli na bango to na makambo oyo bakutanaki na yango”. Atako bongo, Nzambe apesaki bango mokumba ya kosakola Nsango Elamu. Mokonzi na bango se moko, asangisaki bango te, moto na moto asakolaki Nsango Elamu nà “ bontóki bwa yé”, bongo Elimo Santu, epesaki makanisi na bakomi ya Biblia, mpe elingaki ‘te bokeseni bwa bango ebatama to ebombama te, kasi epesamela biso lokola Nsango Elamu”; emonisaki lisusu Pàpa.

Yoko eklezya ebyangemi na bomoko

Pàpa akanisi lisusu n abato ‘te, okati ya Eklezya, Petro nà Polo, bazalaki na bondongwani tè”. Ndé yango bakómi “bilembo ya bokeseni biyiké, oyo Elimo sé moko asangisi na bomoko”. “Bakonzi ya Eklezia ya Roma bakutanaki na mosala makasi ya kominyo, bayebaki yango, basalelaki yango mpe basakolaki yango lokola sakramentu ya bomoi bwa Nzambe. Litatoli na bango esungaki mingi mpo ‘te bokristo ezala na lisoló lya bato, te mpo na koyangela to kokonza, kasi mpo na kosalela, bomoko mpe kozongisa boyokani”.

Masóló mpe ekimenisme

Na kosukisa bomanyoli bwa yé, Pápa alendisaki ‘te «Na bolobeli bwa basantu Petro mpe Polo, Mokonzi apesa biso, tólinga lisusu malamu koleka, Eklezia ya biso Katoliko». Kasi lisusu «toyeba nayino motuya na yango na mosala mwa bokutani ya bondeko kati na bato mpe bikóló, na kokima maye manso ekoki kobebisa to kozokisa bondeko. Bongo mpe na kolendendela na nzela ya ekimenisme mpe ya boyokani ya malamu elongo na bato banso». Na nsuka, episkopo wa Roma apesaki mokumba moye na Ngondo Maria, mpe abondelaki alobi: «Tika ‘te Maria, mokonzi-mwasi ya bantómà, abatela tango inso libota lya Nzambe, na Roma mpe na mokili mobimba». 

Bayambi, na tango ya losambo la Angelus
Bayambi, na tango ya losambo la Angelus   (@Vatican Media)

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

29 sánzá ya motóbá 2026, 21:16