Luka

2026.05.10 Regina Caeli ya mokolo mwa lomingo la motoba ya eleko ya Pasika 2026.05.10 Regina Caeli ya mokolo mwa lomingo la motoba ya eleko ya Pasika  (@Vatican Media)

Regina Caeli: “Lokola Nzambe alingaki biso liboso, biso mpe tokoki kolinga”

Pàpa amaniolaki maloba ma Yezu ekomami na Nsango Elamu ya Yoane, na ntina ya elambo ya Mpokwa. Azongelaki komonisa Bolingi nsuka te oyo Kristu amonisaki na mokili. Bolingo oyo ezangi bokatikati ezali kopesa biso nzela ya kozwa elaka ya Elimo Santu. Na ndakisa, Léon XIV alobaki ‘te: “Bolingo bwa Nzambe bozali ntina ya boyengebene to bosembo bwa biso”.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Na mokolo mwa lomingo moye mwa motoba ya eleko ya Pasika, Pàpa atyaki makanisi ma ye na maloba ma Kristu oyo ekomami na Evanzile ya Yoane (Jn 14, 15) ntango Yesu alobaki na bayekoli ba ye na Elambo ya Mpokwa, mpe maloba mango mazali mpenza maye: Soki bolingi ngai, bokotosa malako ma ngai. “Maloba maye mazali kolongola biso na likanisi lya libungà, mpamba te, tozali balingami soki tozali kotosa mibeko”. Sé bongo, boyengebene to bosembo bwa biso bikozala nde ntina ya bolingi bwa Nzambe; elimbolaki Léon XIV, mpe amonisaki ‘te nzokandé, “bolingo bwa Nzambe ezali ntina ya bosembo bwa biso”.

Nganga-Mokonzi alobi ‘te; Soki tondimi maloba maye mpe bolingo bwa ye mpo ya biso,  “maloba ya Yezu makozala libyangi mpo na boyokani, kasi ezali te motungisi to kokangama ezangi makasi. Na yango, Pápa asengaki bayambi ba ‘ ye ‘te bákanga ntina ya etinda to mobeko mwa bolingo oyo Kristu apesaki.

Moto azali lobokó mpo ya sékó

Ntango Yezu alendisi biso ‘te tolingana biso na biso lokola ye alingaki biso, “ezali bolingi bwa Yezu ndé, ekobotisa bolingo kati na biso”, ekóbaki yen a koloba, “Kristu yemei azali ndakisa, mobeko ya bolingo bwa solo: Nzambe ya solo azali sembo libela na libela, azali peto mpe na makambo manso. Na yango, soki tolingi Nzambe solo, tokolingana mpenza boko na basusu”. Ezali mpe bongo mpo na bomoi, elobaki Pápa. “Bobele moto azwi yango nde akoki kozala na bomoyi, lolenge yoko mpe, sé oyo alingami nde akoki kolinga”. Mibeko mya Mokonzi, “ezali bongo lolenge ya bomoi oyo ezali kobikisa biso na bolingo bwa lokuta; yango ezali nzela ya molimo, oyo ezali nzela ya lobiko”; elobi ye.

Elimo santu, mosungi oyo akosaka te

Wana azalaki koloba na bayekoli ba ye, Yezu alakaki bango mpe Mosungi, “Elimo ya bosolo”, molobeli mpe mosungi. Ezali likabo liye “mokili ekoki kozwa te (Jn 14,17), tango bazali kokoba na mabe maye mazali konyokola babóla, kokangisa bato bazangi makasi, koboma bato oyo basali eloko te”. Nzokande, elobi Pàpa, moto moye azongisi na bolingo Yezu apesi mpo y abato banso, akozwa na nzela ya Elimo Santu; “mosungi moye akosaka te”.

Na nguya ya Elimo, tokoki bongo kozala banzeneneke ya Bolingi mpe kotatola ‘te Nzambe azali bolingo. Léon XIV alimbolaki ndimbola na yango: “Liloba lyoko elimboli te likanisi lya elimo ya moto, kasi bosolo ya bomoi bwa Nzambe, oyo wapi na nzela na yango, biloko binso bisalemaki ut’o na eloko moko te mpe bisombamaki na liwà”. Na komonisa biso bolingo bona, “Yezu akaboli elongo nà biso bozalisi bwa ye lokola Mwana molingami”. Mofundi, tata wa lokuta, oyo alingi kotelemisa moto nà Nzambe, mpe moto nà moto, mpe oyo azali na bokeseni mpo na maye manso Yezu asalaki mpo na kobikisa biso na mabe.

Regina Caeli, mwa mokolo mwa 10 ta sànzà ya màyii 2026 - Pape Léon XIV

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

10 sánzá ya mítáno 2026, 17:39