Luka

Regina Caeli: Léon XIV asengi kozala na boyambi lokola nzela konfiansi mpe ya bondeko

Na tango ya losambo la Maria, o mokolo mwa lomingo loye mwa 03 Mayi, na esika ya Saint-Pierre, Pàpa amanyolaki na Nsango Elamu ya Santu Yoane. Abyangi bakristu bàyamba malàkà ma Kristu, mpe bàzala na boyambi ut’o mokolo mwa lelo. Yango nde ekobikisa na minyoko mpe ekosalisa biso na kozala na bondeko. Bongo tokosàlà na mangomba, ba eklezya mpe bandako ba biso, esika ya polele “epai wapi, bisika bizali mpo na banso”

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Na eleko eye ya Pasika, Tata Mosantu akundolaki ‘te, maloba ma Yezu, ezwi ndimbola mosusu na nzela ya nsekwa, na ndakisa ya eklezya oyo ezali kobotama. “Maye mazalaki kala kozanga na bapostolu, to mpe oyo ezalaki kotungisa bango, ebimi sika na mpwasa na makanisi ma bango, ekomisi mitema mya bango moto-moto mpe epesi bango elikya”.

Pàpa abeti nsete na Nsango elamu ya makambo malekaki nsima ya Nsekwa. Alobi ‘te elàkà ya Kristu ekosimba mpe biso na mobombamo moye monene ya lilónga ya liwà: “Nakokende kobongisela bino esikà, na kozonga, mpe na komeme bino epai ya ngai, mpo bisika na zali , bino mpe bozala wana” (Jn 14, 3). Maloba maye mazali kolakisa bosolo o bozindo mwa yango mpenza, ‘te: “moto na moto azali na esika na yé epai ya Nzambe”. Yezu alobeli ndako eye ezali ya kofungwama polele mpo y abato banso: “ndako moko monene makasi”, “ezali ndako ya Tata way e mpe Tata wa biso, epai wapi bisika bizali mpo y abato banso”. Elobi Pàpa Leon ya XIV.

“Mwana amilakisi lokola Mosàli oyo abongisi ndaku mpo ‘te ndeko mobali moko na moko mpe ndeko mwasi moko na moko, akuta esika na ye bobele ebongisami, tango akokóma, bongo amiyoka solo ‘te bazelaki ye sé kozela, mpe na nsuka akomi.”

Ezali lolenge la sika ya bondeko na nzela ya koyamba

Na mokili mwa kala esika, esika wapi tozali se na nzela, likambo ya boyokani ezali sé kolongola baningà na lisàngà (...). Nzokande, na mokili mwa sika epai Mosekwi azali kokamba biso, eloko ezali na motuya mingi ezali litomba lya moto nyonso”. Papa atelemeli lolenge ya mokili mwa kala, moye mozalaki kosalema na molimo ya kolongola to kobimisa moto na lisàngà (exclusion) mpe ya mimekano to kondongwana (competition), oyo ezali na bokeseni nà bokonzi bwa Nzambe.

“Liwa ezali kotungisa na kopanza nkombo mpe mabanzo, kasi kati na Nzambe, moto na moto azali bobele ye moko. Wana ezali solo, esika oyo tolukaka na bomoi na biso mobimba. Mpamba te, tango mosusu, tolukaka kozwa mwa likebi mpe liyebi.”

Boyambi, nzela ya libiki

O kati ya mateya, ma yé, Pàpa Leon ya XIV abyangi totya motema na Kristu. Alobi ‘te; “Bozala na boyambi, …, Bondimela Nzambe, bozala mpe na kondima mpo ya ngai”, (Jn 14, 1). Asengi Nzambe abatela mitema mya biso na molimo ya kozala na biloko mpe ya kozwa, molimo ya kolanda sima bisika ya lokumu mpo na kozala na motuya. Mpamba te, bomoto ya moto, esengeli na lokumu la bato te. “Moto na moto azali na motuya ndelo suka te, o kati ya mobombamo mwa nzambe, oyo azali bobele moko ya bosolo kati na bomoi”.

Kowelisa likolo na nzela ya bolingi bwa bandeko etingami na Kristu

Pàpa abetaki solo nsete mpe alobi ‘te, Boyambi emonanaka na misala ya bolingo. “Soki tolingani biso na basusu, lokola Yezu alingaki biso, tozali komikabola bososoli bonà”. Na yango bakristu basengeli kowelisa ut’o sik’awa bokonzi bwa Tata. “Tozali kowelisa likolo awa onsé, tozali koyebisa n abato banso ‘te,bondeko mpe kimya ezali destin na biso”. Na bolingi bonà, moto na moto azali komikundola bomoto bwa yé: “atako o kati ya bandeko bayike, moto na moto amimona ‘te azali se ye moko na motema mwa nzambe”.   

Nakosukisa mateya ma yé, Pàpa apesi moko na moko ya bakristu etindà. Ezali oyo ya kobongola mangomba mya biso ya bakristu na ndako eye ezali polele mpo ya koyamba bato banso, mpe ezali na bokebi mpo ya moto moko na moko. Na bolobeli bwa Ngondo Maria. Mbela ezali kosenga biso tokomisa ba eklezya ya biso, bisika ya koyamba bampaya, esika ya bondeko mpe ya kimya, elilingi ya ndako ya Tata, “epai wapi bisika bizali mpo ya banso”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

04 sánzá ya mítáno 2026, 10:11