2026.02.11 Leon ya XIV asambeli elongo mpe mpo na bakoni, na libakù lya Mokolo mwa mokili mobimba ya Bakoni, na Lobàlà ya Vatikan 2026.02.11 Leon ya XIV asambeli elongo mpe mpo na bakoni, na libakù lya Mokolo mwa mokili mobimba ya Bakoni, na Lobàlà ya Vatikan  (ANSA)

Pape akosambela Sapelé mpo na kimya, na bomoko nà bansactuaire ya mokili mobimba

Léon XIV akosambela losambo la sapele ya Maria na mobenga (Grotte) ya Notre-Dame ya Lurde, na lobàlà ya Vatikan, o mokolo mwa poso moye, mwa 30 Mai na ngonga ya 19h. Bisika biyiké bya losambo bikobengisa bakristu mpe ba pèlerins mpo na kosangana na likanisi liye lya Dicastele ya mpó ya kosangela Nsango Elamu. Bakoki mpe kolanda losambo loye na nzela ya televizyo na esika monene ya Saint-Pierre.

Bansango ya Vatikan

 

Léon XIV azongeli kosambela mpo na kimya, elongo nà bansactuaire ya ntina mingi na mokili. Pàpa akosambela Rosario, mp ona kosukisa bongo sanza ya Maria, o mokolo mwa poso, mwa 30 ya sanza ya Mai na ngonga ya nsambo ya mpokwa, na mobenga (Grotte) ya Notre-Dame ya Lurde, na lolobàlà ya lopango ya Vatikan.  Pápa asi abéngaki bobele likabo la kimya; ezali mokano moye azwaki mpo na kolendisa bakristu ‘te basambela tango inso, libaku na libaku. Alobaki yango na tango ya losambo la mpokwa liboso la mokolo mwa 11 ya sànzà ya Apríli oyo eùti koleka, na Baziliki Saint-Pierre.

Basanctuaire ya mokili mobimba basangani na losàmbo.

Lokola liyebisi lya Dicastele ya mpó ya bopalinginyi Nsango Elamu, oyo ezali kokamba misala miye na nzela ya Eteni mpo na Mituna mya ntina mpo na mosala mwa kopalnginya Nsango Elamu na mokili mobimba. Basanctuaire mingi na mokili mobimba, babyangi ba pelerins  mpe bakristu na kosangana na losambo la Maria, elongo nà Pàpa. Mingi mpenza Sanctuaire Mère de Dieu (na engumba Zarvanytsia, na Ukraine); Sanctuaire Notre-Dame de la Paix et du Bon Voyage (na Antipolo, na Philippines); Sanctuaire Notre-Dame du Rosaire (na Fatima, na Portugal); Sanctuaire Notre-Dame Reine de la Paix (na Medjugorje, na Bosnie-Herzégovine); Sanctuaire Notre-Dame de Lourdes (kaka na kati ya engumba eye, na Pyrénées, na ekolo ya France); Sanctuaire Saint Charbel-Annaya (na Byblos, na Liban); mpe Sanctuaire ya Pápa ya Ndako Mosantu to Sainte Maison (na Lorette, na Italie), banso basili kosangana na losambo mpo na kosenga boboto to mpe kimya.

Lolenge kani kosangana na losambo linà ?

Bokoki kosangana na likanisi liye ya losambo elongo na Pàpa, na lobàlà ya Vatikan. Mpo ya kokoto kuna, esengeli kozwa ba tickets na nimero 7, ya Via della Conciliazione, o mikolo miye, yambo ya ‘te losambo la sapelé to ya Rosario. Ekozala bongo to mokolo mwa 28, 29 mpe mokolo mwa 30 Mai, kobanda na ngonga ya 9:30 tee na ngonga ya 17:30. Okoki mpe kosambela elongo na bango na nzela ya bililingi binene oyo bizali na esika monene ya Santu Petro (la Place Saint Pierre).

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

28 sánzá ya mítáno 2026, 23:07