Papa na esika ya Santtu-Petelo mokolo ya likita lya banso Papa na esika ya Santtu-Petelo mokolo ya likita lya banso  (ANSA)

Ngondo Maria, ndakisa kitoko ya eye Eklezia ebéngami kozala

Mokolo ya misáto 13 ya sánzá ya mitáno, Papá akobaki molongó ya matéya na ye etáli Concile Vatican II, na botelemi mpóso eye na mokabo ya súka ya Lumen Gentium, eye ememi na Ngondo Maria, «elama ya ntina koleka mpe ye mókó mpenza ya Eklezia, ndakisa ya malongá mpo ya Eklezia na boyambi mpe na bolingi». O eleko ya bopési ba mbote na lokóta y’anglais, Léon XIV akundolaki boluki bobomi ya sántu Yoane-Polo II, na 13 ya sánzá ya mitáno 1981.

JR Bompolonga - Kinshasa

Eleki mibú ntúkú mínei na mitáno, na etando eye ya esika ya Sántu-Petelo, sántu Yoane-Polo II azuaka likámá ya boluki ya bobomi ye, azokaka makási na lisási na libumu, na lobóko. Linzanza yókó ya mabángá ma mpémbé ekokundola mobúlú ená, na esika mpenza wápi Yoane-Polo II azuamaka. Mokolo eye ya misáto 13 ya sánzá ya mitáno, Papá Léon XIV atelemaki waná. Akitaki na papamobile na ye, mpo ya kosámbela mwá ngonga moke na bonkútú libosó ya linzanza ekotisama na libángá. Afukami, atiyaki lobóko na ye na biloko ya Karol Józef Wojtyła. Na lisikulu na ye na bato ya mobémbo mwa boyambi ya lokóta y'anglais, na súka ya litéya, Léon XIV azongelaki mobúlú eye ebúlunginyaki bakatoliko mpe mokili.

«Leló, tokokanisa Ngondo ya Fatima. Na mokolo eye, eleki mibú ntúkú mínei na mitáno, boluki bobomi bokó esálemaki mpo ya bosúkisi bomoí ya Papá Yoane-Polo II, mpe ezali mpo na likambo ená ndé nabonzi litéya na ngai ya leló na Mwáesengo Ngondo Maria», elimbolaki Léon XIV, na bopési mokolo ya misáto eye «bogangi ya boboto» ya bato bakonyokwama na etumba.

Papa liboso ya linzanza ekokundola boluki bobomi
Papa liboso ya linzanza ekokundola boluki bobomi   (@Vatican Media)

Maria, mamá ya lisangá mobimba ya Eklezia

Na bokobi molongó na ye ya matéya na mikánda ya Concile Vatican II, leló lisusu na Lumen Gentium, Léon XIV azuaki bongo mokáno ya kotelema na likambo-likonzi ebonzama na Ngondo Maria, «elama ya ntina koleka mpe ye mókó mpenza ya Eklezia, ndakisa ya malongá mpo ya Eklezia na boyambi mpe na bolingi» (n° 53). Papá alimbolaki na bandimi basangani na esika Sántu-Petelo boni boni na Maria, tokoki koyéba mbala mókó «ndakisa, elama ya ntina mpe mamá ya lisangá mobimba ya Eklezia».

Mamá ya Yézu, elimbolaki Léon XIV, azali ndakisa kitoko ya eye Eklezia ebéngami kozala. Na bomitiki kosálema na mosála ya Ngolu, eyaki kokokisa na ye, mpe na boyambi likabo ya Nkóló na boyambi mpe na bolingo na ye ya ngondo, akóma «ekelamu ya Liloba ya Mokónzi mpe mamá ya bána ya Nzámbe babotami na botosi na ekela ya Elimo-Sántu». Azali lokolá mondimi mókó ya ntina. Na ye, ekobaki Papá, «epésamaki na bisó motindo elámu na bofúngoli mobombano ya bonzámbe na lisangá ya bato basántu ya Nzámbe, Maria azali elama ya ntina ya lisangá ya Eklezia». Na súka, Maria azali mamá ya Eklezia nionso, mpo aboti bána na Mwána na ye. Mókó mókó akoki koloba na ye na botiyi motéma na mwána, na bosólósóló akoyókama, akobátelama mpe akolingama, elobi Léon XIV.

Elili ya mobombano

Bokesenisi nionso waná ekoki kokátana na mokúsé na bolobi bokó, elobaki Papá. Maria azali «mwási elili ya Mobombano». Tokokuta na ye bosóló bokó ya lisapo, Maria azali elengé mwási mókó ya Israël, eye epésamaki ya kobika nzebi ya kokamwa ya kokóma mamá ya Masiya. Azali elili yókó, mpo na ye «ekokisami boningani mibalé ya bokiti mpe ya bomáti: na Ye bikongenga liponi ya ofele epái ya Nzámbe mpe bondimi na bonsómi ya boyambi na Ye».

“"Maria azali bôngó mwási elili ya Mobombano, elingi koloba na mwángo ya bonzámbe ya libiki, kála ebombanaki mpe ebimisami na mobimba na Yézu-Kristu".”

Esika yókó ya ye mókó

Na mosála ya Bosikoli, Yézu-Kristu azali Montei se mókó ya libiki, etéyi Concile. Maria aboyi eloko te, elobaki Léon XIV, Alakisi kútu libongi. Ngondo «amemaki na mosála ya Mobikisi bosálisani bokó ekokani na eloko te na botosi na ye, boyambi na ye, elikya na ye, bolingi bokó ya moléndé, mpo ya bozongisi na milimo bomoí ya likoló», na bokómi mpo ya bansó Mamá mókó.

Papá alobaki lokolá boni boni mobombano ya Eklezia ekomilakisa na Ngondo, mpo na Ye, bato ya Nzámbe bamoni bilakisami libandela na bangó, ndakisa na ye mpe ekóló na ye. Na ye «Eklezia ekotála mobombano ya ye mokó, kaka te mpo azui waná ndakisa ya boyambi ya Ngondo, ya bolingi ya mamá mpe boyókani ya butú eye abéngamaka, kasi lokolá mpe mingimingi mpo Eklezia ayébi na ye elongi ya malámu ya eye abéngami ya kozala».

Matéya nionso waná bizali na Lumen Gentium bikomema ya kolinga Eklezia mpe ya kosálela na káti na ye bokokisi ya Bokónzi bwa Nzámbe, elobaki Papá oyo abéngi ya komitika kobéngama na Maria, mpe na bomitáli ya mozindo: «Ezali ngai kobika na boyambi ya bomikitisi mpe ya mosála bozali na ngai na Eklezia; eyébi ngai na Maria lisangá ya boyókani eye Nzámbe apésaki ngai mpo ya kokokana na bolingo na ye ndelo te; komiyoka na káti mpenza ya Eklezia, na botosi na basáli baye Nzámbe apési ye; ekotála ngai Maria lokolá ndakisa?».

Papá abéngi kosenga libondeli ya Ngondo zambi ekola na mókó mokó bolingo mpo ya Eklezia.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

13 sánzá ya mítáno 2026, 15:28