Na Sànzà ya Mayi, Tata Mosantu abyangi biso na kosambela “mpo na koleisama yabato banso”
Bansango ya Vatikan
Na mokili epai wapi bamilió ya bato bazangi bilei malamu ya koliya, Pápa Léon XIV atomboli lolàkà na ye na losambo, kosenga na Nzambe, asala ‘te bato bakoka kobongola “makanisi ya kosalela biloko na moyimi, na ezalela ya bondeko”. Na yango basengeli komonisa yango na bikela, to na nzela ya makambo ma solo: kampanye ya kokolisa boyebi, bandako ya malili mpo ya kobomba bilei, mpe, kozala na bomoi ya malamu mpe ya bomipesi. Na nzela ya kampanye “Bondelá elongo na Pápa”, Réseau Mondial ya losambo la Pápa ezali kobenga bayambi mpe bato banso ya motema bolamu, basangana na makanisi maye Pápa azali na yango na motema.
Kokamata mbuma ya mabélé lokola likabo lya Nzambe mpo na bato banso
Na losambo la ye, Léon XIV andimaki solo na mawa nyonso ‘te “milio ya bandeko mibali mpe basi bazali konyokwama na nzala, nzokande biloko mingi bizali kobebisama na bamesa na biso”. Tata Mosantu asengi na bayambi ‘te bazala na bososoli bwa sika: koyekola kotondo nzambe mpo na bilei binso, koliya na bosolo mpe kokabola na esengo, kosimba mbuma ya mabélé lokola likabo lya Nzambe “ezali mpo na bato moke te kasi mp ona bato banso”. Lisusu, losambo la Pàpa esukaki na bosengà ya Nsango Elamu: “Tika ‘te moto moko te azanga biloko o meza ya bato banso”.
Kozwa mokano liboso lya ezaleli ya bozangi bosembo
Sàngó Cristóbal Fones, mokambi ya Réseau Mondial ya losambo la Pàpa na mokili mobimba, amonisaki ‘te esengeli kosala na lombango losambo linà mpo na kokokisa bondeko bwa Pàpà n antina lya likanisi liye. “Mpamba te, azali konyokwama mingi na komona lolenge, bato mingi na mokili bakoki kozwa biloko te ya motuyà, lokola bileyi”. Sé bongo ndé asengi na bato banso, bazanga bosembo te, kasi bazwa mokano, na nzela ya losambo, ya kolakisa na misala, bilembo bwa bondeko bizali komonono, ekomaki bongo nganga-Nzambe ya ba-Jesuiti.
Yango wana, Pàpa alobi lisusu ‘te likanisi liye lizali se likambo ya komanyola mpamba te na losambo kasi mpe ya komonisa na misàla. Pápa Léon XIV asengi na bato ya mangomba ‘te bápesa makanisi ya misàlà mizali komonono - banki ya bileyi, ba kampagnes ya kobakisa boyebi, kokitisa kobebisama ya biloko o kati ya ndako - na kososola ‘te mampa ezali “likambo lya kosomba te, kasi elembo ya bondeko mpe ya lisungi”, elobaki ye.
Motuya mozali kobangisa na mokili mobimba na ntina ya bilei
Mbela eye ezali ya lombango mpampa te, motuya mozali kolakisa bomitungisi ya bikilólo ndenge na ndenge ya Nations Unies. Mpo na “WFP 2026 Global Outlook”, lapolo oyo ebimisi motango ya likambo ya nzala na mokili, elobi ‘te, 318 millió ya bato bazali kokutana na likambo ya nzala, maniolo, mpe makàmà ndenge na ndenge yam pasi koleka. Kaka lapolo yango ekebisi ‘te bitumba na Moyen-Orient ekoki kokotisa bato 45 millió misusu na nzala makasi liboso ya katikati ya mobu moye. Lisusu, na 2025, banzala mibale ekotaki mbalamoko na biteni ya Gaza mpe ya Soudan. Ezali bikolo biye mibale ya liboso na ekeke oyo.
ONU elongo nà UNICEF, bazalaki bobele kokanisa ‘te bato millió 673 oyo banyokwamaki na nzala na mobù 2024 mpe sika 2,3 milliard bazali konyokwama na likambo ya bozangi bokengi mpe nzala makasi. Bongo bato koleka 2,6 milliard bazali na likoki te kozwa bileyi malamu ya koliya. FAO mpe Programme ya Bilei ya Mokili mobimba bazali koyebisa lolenge yoko ‘te nzala makasi mpe kozanga bokengi ekokóba kobakisama tee na 2026 na bikólo mpe bitúká soki zomi na motoba (16) oyo eyebani lokola bisika ya mpasi.
Likambo ya kobebisa biloko na mokili mobimba, ezali kati na losambo la Pápa
Likambo liye ezali mpenza mabe soki tokanisi yango na kobeba ya bilei na mokili mobimba. Na mokili mobimba, bato bazali kobimisa batoni koleka miliare moko ya bileyi. Lisusu, kobungisa bilei mpe kosalela yango mingi ezali mokakatano monene mpo na klima, mpamba te, yango nde ebimisaka pene na 8% to 10% ya gaze oyo ebimisaka molunge na mokili mobimba. Ezali likambo ya kokamwa oyo ezali kosalema na mokili mobimba, oyo Pápa Léon XIV atyaki na kati ya losambo la ye mpo na sanza ya Mayi.
Makambo matali Reseau ya Mokili mobimba ya losambo la Pápa
Reseau ya Mokili Mobimba ya losambo la Pápa ezali mosala ya Pápa oyo etambwisami na Lingomba ya ba Jésuiti. Ezali na mikili koleka tuku libwa, 90, ezali kosangisa bato koleka milio 22 oyo bazali koluka kozala na bomoi mokolo na mokolo mpo na kosala etindà ya Kristu. O kati ya mosala moye, ezali nà makanisi mya Pàpa oyo abimisamaka sanza na sanza mpo na kosambela. Ezali mbelà ya kótiya likebi na mikakatano maye bato bazali kokutana na yango mpe na mosala ya Eklezya.
Ebandisamaki na 1844 na kombo ya Apostolat ya Losambo, Pàpa François apesaki ndingisa na sanza ya zomi na mibale ya mobu 2020 lokola Fondation ya Vatikan, mpe mibeko na yango ya nsuka endimamaki na sanza ya yuli ya mobu 2024.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
