Luka

2026.05.08 Mobembo na Pompei: Misa mokambami na Léon XIV na sanctuaire na Maria na Pompéi, o mokolo mwa 8 mai 2026. 2026.05.08 Mobembo na Pompei: Misa mokambami na Léon XIV na sanctuaire na Maria na Pompéi, o mokolo mwa 8 mai 2026.   (@Vatican Media)

Na Pompei, Leon ya XIV abyangi na bomipesi na molimo mpo na boboto to kimya

Na tango ya molulu moko mwa Ukaristya na sanctuaire Marial ya Pompéi, o mokolo mwa 8 ya sànzà ya Máyí, Pápa Léon XIV atyaki bokonzi bwa ye ya bopápa na nsé ya libateli lya Ngondo Maria mpe abyangaki na ntina ya kimya na mokili mobimba. Na komanyola likolo ya Rosario, Ukaristya mpe ngolu, Nganga-Mokonzi alendisaki bakristu na kozala lisusu na boyambi na tango ya bitumba, mikakatano mya mabota mpe kozala mosika na mituya mya bokristu.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Pápa Léon XIV aponaki esika mosantu ya Pompéi mpo na mobembo mwa ye ya liboso na Italie, mbula moko mpenza nsima ya kokóma mokitani ya Petelo, mpe na mokolo bakomibonzaka na bolobeli bwa Maria ya Pompéi. Na losambo la sapelé.

Liboso lya bandimi pene na nkoto tukù mibale (20 000) oyo bayanganaki na engumba ya Maria oyo Santu Bartolo Longo abandisaki. Nganga-Mokonzi alimbolaki ‘te alingaki kotya mosala mwa ye na libateli lya Mosantu Maria. Lokola aponáki nkombo ya Léon, Pápa ayebisi n abato ‘te, akotaki mpe na libula ya Léon XIII, oyo ayebanaki mingi, mpo alendisaki makasi losambo la Rosario. Na nsima, episkopo wa Roma alobelaki mokumba ya mobandisi Santu Bartolo Longo mpe mwasi wa ye, Comtesse Marianna Farnararo De Fusco, oyo babimisaki na Pompéi bobele esika ya losambo te, kasi “engumba ya Malia” ya solo.

Losambo la Sapele, kelasi ya bomanioli

Na mateya ma ye, Pápa Léon XIV abimisaki makanisi mingi ya teoloji na ntina na Rosario. Alobaki ‘te ezali losambo la Kristu mpe ya Ukaristya. Mpo na Pápa, kozongela maloba “Losako Maria” ezali “mosala to ekela ya bolingo” oyo ememaka bandimi epai na Yezu mpe na Ukaristya. Lisusu, amonisaki n abato ‘te, losàmbo loye esengeli te kokóma bobele momeseno, kasi esengeli kozala ntango inso komanyola o bozindo, mabombami ma Kristu.

Nganga-Mokonzi ya Katoliko alobaki lisusu ‘te Rosario ezalaki kotambwisa ut’o kala, bomoi bwa molimo ya Eklezia mpe ya mabota ya Bakristu: “ Sapelé ezali komema bomoi bwa biso, ezali kozongisa biso ntango inso epai ya Yezu mpe na Ukaristya”. Léon XIV alobaki lisusu ‘te: Na ebandela ya mibù 2000, Saint Jean Paul II azalaki komona kati na Losambo la Sapelé “mikapo mikuse ya Evanzile”, oyo etondi na mabombami ma mwinda. yango.

Maria, Mama wa Ngolu

Tango azongeláki lisoló ya Anzelu tango asangelaki Maria, mokitani ya Petro ya mbala ya nkàmà mibale na tuku motoba na motoba (266è) alakisaki Maria lokola mwasi oyo na nzela na ye, «libɔndi lya Nzambe» ekomelaki bato ba zokaki na «lisumu, na minyoko mpe na bitumba». Alobi ‘te « iyo” ya Maria epesaki bomoi na Kristu mpe na Eklezya. Atángaki maloba ya likita monene ya mibale ya Vatikan (Concil Vatican II) mpe mokanda mwa Santu Augustin, bongo alobaki ‘te Maria azali «Mama wa Nzambe» mpe «Mama wa eklezya». Komanyola mibombami ya Kristu na nzela ya Sapelé to Rosario, ezali kopesa nzela na mokristu azongela na molimo, bilembo binene ya Nsango Elamu, ut’o Nazarete kino na esika ya Nkitela, to Cenacle.

Mbela makasi na ntina ya boboto na mokili mobimba

Pàpa alobelaki likambo lya mobulu oyo ezali kotungisa bitando biyiké na mokili. Na komona nà mawa “bililingi bya liwa” oyo bizali kobima mikolo nyonso na nzela ya bapanzi-sango, asengi boyokani kaka te na makambo ya politiki mpe ya nkita, kasi mpe na makambo ma “molimo mpe ya mangomba”, mp ona kotonga kimya, na ndakisa ya bilili Jean-Paul II na assisi na 1986, mpe oyo Pàpa François atikalaki kolanda sima na yé. Mpo na Léon XIV, kimya “eutaka na motema” mpe esengaka kobongola motema. Tata Mosantu alobaki mpe mabe ma nkita ya mokili mobimba oyo eponi mombongo ya bibundeli na esika ya limemya mpo na bomoi bwa bato

Libota, bolingo malamu mpe kosunga bato oyo bazali na makoki te

Na nsuka, Nganga-Mokonzi akumisaki mosala mwa Saint Bartolo Longo, oyo ayebanaki mpo ayambaki bana bitike mpe bana ya bakangami ya Pompéi. Bobele na nzela ena, amonisaki ‘te bansambo ya mokristu esengeli ntango nyonso komema ye na misala ma bolingo. Na kotángáa lokola ndakisa, mokanda mwa yambo mwa Yoane, mokomi ya Biblia, tozali kotánga boye: “Tólingaka, na maloba te mpe na lolemo te, kasi na misala mpe na bosolo”.

Alendisaki bayambi ‘te basangisa boyambi mpe bomipesi mpo na kosalisa bato bazangi makasi. Pápa amitungisaki lisusu na ntina ya “bolembu ya boyokani o kati na mabala” mpe kobakisama ya matata kati na bikóló Amoni yango lokola makambo mibale mizali kokotisa mikakatano minene mpo na mokili mwa lelo.

“Nguya moko te na mabele ekoki kobikisa mokili, soki kaka nguya ya bolingi bwa nzambe te”

Na nsuka ya lisukulu na ye, Léon XIV asengaki bakristu bázala na elikya mpe bátyela nzambe motema,liboso lya mikakatano mya tango ya lelo. Tóndimela ye, tótyela ye motema, tólanda ye. Asakolaki bongo na ntina ya Kristu, yambo te atika na bolobeli bwa Ngondo Mosantu ya Pompéi, kimia ya mokili mpe mikolo mikoya mya Eklezia.

Pompéi, Misa mwa mokolo mwa 8 ya sànzà ya màyi 2026, ekambamaki na Pape Léon XIV

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

 

08 sánzá ya mítáno 2026, 18:09