Luka

2026.05.04: Pàpa Léon XIV ayambaki na masolo, Mokonzi mwasi ya Répibkiki  ya Islande, Halla Tómasdóttir, o mokolo moye mwa yambo, mwa 4 ya sànzà ya Mayi ya mobù  2026. 2026.05.04: Pàpa Léon XIV ayambaki na masolo, Mokonzi mwasi ya Répibkiki ya Islande, Halla Tómasdóttir, o mokolo moye mwa yambo, mwa 4 ya sànzà ya Mayi ya mobù 2026.  (@VATICAN MEDIA)

Mokambi Mwasi ya ekolo ya Island ekendaki masolo epai ya Pàpa

Halla Tómasdóttir ayambamaki na Palais apostoliki ya Vatikan o mokolo mwa 4 ya sànzà ya Mayi. Na tango ya masolo, balobelaki likambo lya matata, ya masolo, mpe maye bakoki kosàlà mpo na kimya.

Bansango ya Vatikan

 

O mokolo mwa miney ya sànzà ya Mayi (04 mai), Pàpa Leon ya XIV ayambaki na masolo,na Palais apostoliki ya Vatikan, mokambi mwasi ya Island, , Halla Tómasdóttir. Sima akutanaki na episkopo wa lokumu Pietro Parolin, Secretaire ya etuka, oyo azalaki elongo nà Mgr Paul Richard Gallager, secretaire mp ona makambo ya boyokani kati na bikolo mpe mangomba na mikili.

Mokambi mwasi ya Island na masolo epai ya Papa
Mokambi mwasi ya Island na masolo epai ya Papa   (@VATICAN MEDIA)

Masolo elongo nà Secretaire ya Etukà.

Liyebisi moko ya ndako ya bopanzi nsango ya Saint-Siege, elobi ‘te: “O tango ya masolo na secretairerie ya etukà, batomelanaki botondi mpo ya boyokani bozali kati na bikolo biye mibale”. Alobi ‘te, “eklezya ya mboka enà ezali kosunga makasi mp ona bokóli bwa bolamu ya lisangà y abato, mingi mpenza mpo na bikeke bizali koyà. Na sima, masolo ma bango mokobaki na makambo matali ordre regional mpe international, mingi mingi na mpó ya matata, bosengà ya masolo, mpe makanisi ma boboto to kimya”; elobi liyebisi liye.

Mokambi Mwasi wa Island na Masolo elongo nà Pàpa
Mokambi Mwasi wa Island na Masolo elongo nà Pàpa   (@VATICAN MEDIA)

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

04 sánzá ya mítáno 2026, 10:50