2026.05.06 Likita lya banso 2026.05.06 Likita lya banso  (@VATICAN MEDIA)

Likita lya bansó: komona lisusu lomeko ya boyékoli likanisi ya Eklezia

Na bokobi molongó na ye ya matéya bitáli botángi lisusu mobéko-likonzi ya Concile Lumen Gentium, Léon XIV atelemaki mokolo ya misáto o eleko ya likita lya bansó, na lomeko ya boyékoli likanisi ya Eklezia. Mpo ya Tatá-Esántu, Eklezia ekobika «na lisapo na mosála ya boyéi ya Bokónzi ya Nzámbe na mokili». «Na ye, nionso esengeli kozongisama na libiki na Kristu», «esengeli kobimisa maloba ya polélé libosó ya nionso eye ekonyokola lokúmu ya moto».

JR Bompolonga - Kinshasa

Sima ya bolobi na likita lya bansó ya mokolo ya misáto elekaki mobémbo na ye ya súka n'Afrika, eye ememaki ye n'Algérie, na Cameroun, n'Angola mpe na Guinée équatoriale, Papá akobaki mokolo ya misáto 6 ya sánzá ya mitáno molongó na ye ya matéya etáli botángi lisusu mikánda ya Concile, na botelemi leló lisusu na Mobéko-likonzi ya Lumen Gentium. Libosó ya bandimi ebelé, basangani na esika Sántu-Petelo atáko ntángo ezalaki malámu te, Léon XIV abongisaki likanisi na ye na eténi yókó ya mokabo 7 ya mobéko-likonzi ya Concile Vatican II etálaka Eklezia, na bososoli na mókó ya makambo ya ntina: «Lomeko ya boyékoli likanisi».

Eklezia yókó ebaluka epái ya botáli ya súka

Ya sóló, elobaki ye, «Eklezia ekotámbola na lisapo eye ya mabelé na botikali ntángo insó ebaluka na likambo na ye ya súka, eye ezali ekóló ya likoló». Esengeli lomeko lyokó ya ntina eye «tokotála pámba to tokomona ntina te mingimingi», mpo «tokokanisa mingi eye ekomonana mbala mókó mpe eye ya mpiko ya sóló ya bomoí ya lisangá ya bokristu», ebakisaki Papá wa Roma.

Na botángi milongó ya Lumen gentium, Papá alobaki lisusu 'te Eklezia ezali «bato ya Nzámbe bakotambola na lisapo, eye ezali mpo ya boluki ekela na ye nionso Bokónzi ya Nzámbe». Epái esusu amonaki 'te Yézu «akelaka Eklezia mpenza na bosakoli Bokónzi ená ya bolingo, ya sémbo mpe ya boboto». Yangó waná «tobengami ya kotála malámu lomeko ya lisangá mpe ya mokili ya libiki na Kristu» mpe ya kobalola «botáli na bisó na botáli ená ya súka, zambi ya komeka mpe kotála nionso na loléngé ená», elobaki ye.

Mpo ya Tatá-Esántu, Eklezia ekobika «na lisapo na mosála ya boyéi ya Bokónzi ya Nzámbe na mokili». Esakoli na «bansó mpe ntángo insó maloba ya elaka ená, ekozua elembo yókó na bopési basakramento, mpenza ya Komúnyo, mpe ekosálela yangó mpe ekomeka likanisi na boyókani ya bolingo mpe ya mosála», ebetaki nsete Mokitani ya Petelo.

Káti ya «kála waná» mpe «nanu te»

Na bosimbi lisusu liloba lyokó ya «ntina» ya Mobéko-likonzi Lumen Gentium, Papá alobaki 'te Eklezia ezali «sakraménto ya mokili ya libiki». Loléngé esusu, ezali mbala mókó «elembo mpe esalelo ya bomoí ená mobimba mpe ya boboto elakamaka na Nzámbe». Kasi, ebongisaki Papá, Eklezia «ekosakola ye mókó te». «Na ye, nionso esengeli kozonga na libiki na Kristu», ekebisaki ye. Yangó waná kútu, Eklezia «ekokokisa etindá na ye káti ya «kála» ya ebándeli ya Bokónzi ya Nzámbe na Yézu mpe «nanu te» ya bokokisi elakamaka mpe ezelama», elobaki episkopo ya Roma.

“"Elembo mpe sakraménto ya Bokónzi, Eklezia ezali bato ya Nzámbe na mobémbo mwa boyambi na mabelé eye, úta elaka ya súka, ekotánga mpe ekolimbola na mwinda ya Nsango-Ndamu mpiko ya lisapo, na botelemeli mabé na ndéngé na yangó nionso mpe na bosakoli, na liloba mpe na misála, libiki eye Kristu alingi kosála mpo ya bato bansó mpe Bokónzi na ye ya bosémbo, ya bolingo mpe ya boboto".”

Etindá yókó o ntéi ya bokabwani ya mokili

«Mobáteli ya elikya yókó eye ekongengisa nzelá», Eklezia ezui lokolá «etindá ya kosakola maloba ya polélé mpo ya koboya nionso eye ekonyokola bomoí» mpe «ekopekisa bomáti» na yangó, elakisaki Papá. Esengeli kozua lokolá ngambo mpo ya babola, baye bazali koyibama, bato ya makámá ya mobúlú mpe ya etumba, na baye bansó bazali na pási, na nzóto na bangó mpe na molimo na bangó.

Esalelo yókó ebengami komibongola

Papá andimaki, na mwinda ya Lumen Gentium, 'te Eklezia ebengami ya kondima « na bomikitisi botaú ya bomoto mpe loléngé ya mokuse ya bisáleli na ye » biye, atáko bizali o mosála ya Bokónzi ya Nzámbe, bizali «na elembo ya mokuse ya mokili eye». «Esaleli yókó te ya Eklezia ekoki kozanga ntángo ya ndelo te», ekebisaki ye. Pámba te bisáleli yangó, ebakisaki ye, «bikobika na lisapo mpe na eleko», babéngami na «mbongwana mókó ya eleko insó, na bozongeli mitindo mpe bobongisi ya misála, na bobongisi ntángo insó boyókani, zambi bikoka kokokana na etindá na ye».

Komúnyo yókó eye eleki liwa

Mokánda ya Concile Lumen Gentium elobi 'te «bakristu bansó basáli Eklezia kaka yókó» mpe ezali «lisangá lyokó mpe bozali bokó na biloko ya molimo ekelama na bomoko na Kristu ya bandimi bansó, mbodi mókó ya bondeko káti ya Eklezia ya mabelé mpe Eklezia ya likoló». «Lisangá ená ya basántu» elakisaki Papá, ekobika mpenza na litéya ya milúlú mya losambo lya misa.

“"Na bosambeli mpo ya bakufi mpe na bolandi matambe ya baye babika lokolá bayékoli ya Yézu, bisó lokolá tosimbami na etamboli ya bisó mpe tokolendisa bokumisi ya Nzámbe: tozua elembo ya Molimo kaka mókó mpe tosangani na litéya ya milulu mya losambo lya misa, na baye baleka libosó na bisó na boyambi, tokumisa mpe topésa lokúmu na Bosántu Bosanto"”

Léon XIV asúkisaki litéya na ye na bosengi na bandimi ya kozala na botóndi na ba Tatá ya Concile ndéngé «bakundolaki mpo ya bisó lomeko ená ya ntina mpe ya kitoko ya moto mokristu». Mpe ya kobakisa: «Tosála makási ya kolona yangó na bomoí na bisó»

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

06 sánzá ya mítáno 2026, 16:58