Pàpa Leon XIV na Castel Gandolfo, elongo na bapanzi-nsango Pàpa Leon XIV na Castel Gandolfo, elongo na bapanzi-nsango 

Léon XIV: Soki moto moko azali kosambisa ngai, asala yango na ko

Leon ya Zomi na minei ayanolaki bapanzi-nsango ya Castel Gandolfo mpo na maloba ma Mokambi ya Amerika, Donald Trump: “Eklezya eyokisi lolàkà laye mpo na makambo ya bibundeli ya nikleere ut’o mibù mileki. Nazali na elikya ‘te bakoyoka ngai mpo na motuya ya Liloba lya Nzambe”. Pàpa aliky bokutani ya masolo malamu mpo na boyokani malamu nà Marco Rubio, Secretaire ya Etat ua Etats-Unis, o mokolo mwa minei, mwa 7 Mai.

Bansango ya Vatikan

 

Mokumba to etindà ya Eklezya ezali ya kosakola Nsango Elamu, ya kosakola kimya. Soki moto moko alingi kofunda ngai na ntina na kosakolama ya Nsango Elamu, aloba yango na bosolo”, Na nsima ya Cardinal Pietro Parolin na ntongo ya mokolo ya mibale, Pape Léon XIV ye moko alobaki na ntina na maloba ya kritiki ya mokambi ya Etats-Unis Donald Trump.

Liboso lya Villa Barberini, ndako na ye na Castel Gandolfo, Léon XIV atelemaki liboso ya etuluku ya bapanzi-nsango mpe ayanolaki na mituna ma bango: “ut’o kala to bambula mingi, eklezya ezalaki kotelemela bibundeli nyonso ya nikleere, na yango ntembe ezali te”, elobaki ye tango azalaki koyanola mpo na maloba ma Donald Trump, na makambo matali bibundeli ya nikleere. Engebene na ye, elobami ‘te Pápa ya États-Unis akoki kondima ‘te Iran ekóma na bibundeli ya nikleere, mpe yango ekoki kotya bomoi ya Bakatoliki banso na likàmà.

Nakolikya ‘te bakoyoka ngai kaka mpo na motuya ya liloba lya Nzambe”, elobaki Léon XIV, mpe azongelaki koloba ‘te “asi alobaki yango ut’o ebandela ya boponami bwa ye, mpe sikawa tozali kopusana mpo na kokundola mokolo mona, nalobi lisusu: Kimia ezala na bino”.

Marco Rubio akozala na Vatikan o mokolo mwa 7 ya sànzà ya Mayi

Mpo na maye matali likita to bokutani na ye nà Secrétaire  ya Etat ya Etats-Unis, Marco Rubio, na tongo ya mokolo mwa minei mwa 7 ya sànzà ya Mayi, Pàpà alukaki “kosolola malamu” mpo na “kozwa elikya” mpe “kofungwama”, mpe “koyokana malamu elongo”. Bongo Léon XIV abakisaki lisusu ‘te: “Nakanisi ‘te makambo oyo akoya kolobela ekokani na oyo ya lelo te. Tokomona...”, wana azalaki kozongela maloba ma Mokambi ya Amerika.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

06 sánzá ya mítáno 2026, 19:44