Luka

Pàpa Leon XIV elongo nà batindami ya Cercle Equestre ya Barcelone Pàpa Leon XIV elongo nà batindami ya Cercle Equestre ya Barcelone  (@VATICAN MEDIA)

Léon XIV: Mokristu azali kaka mosungi ya bato mpamba te

Na tango ayambaki na masolo, batindami ya Cercle Equestre ya Barcelone, elongo na Cardinal Juan José Omella, o mokolo mwa 25 ya sànzà ya Màyi, o ndako monene ya Eklezya ya Katoliko (Conseil du Consistoire), Mokitani ya Petro abyangaki bato bàzala na mabongi ma teoloji ya bolingo ya bokristu, oyo ezali bobele kaka bolingo bwa bato mpamba te, kasi bolingo bwa Nzambe likolo na nyonso mpe kolinga basusu lokola biso moko.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Na tango ayambaki etuluku ya basangani ya Cercle Equestre ya Barcelone, Pápa Léon alobaki na bango ‘te: “Bozalaki na mposa ya kokutana nà Mokitani ya Petro mpo na aniversele ya bobandisi bwa bino. Natondi bino mpo na elembo eye ya kolinga kozala pene na biso”. Na nsima, Mokitani ya Petro alobaki na bango na bokuse. Alendisaki bango ‘te “bátala epai na Kristu, mpamba te, bobele sé na lolenge lónà nde bakoki koyeba to kokundola bozali bwa yé kati na bandeko ba bango babàli mpe basi; mingi mpenza, baoyo bazali na bozwi mingi te”.

Tóluka bolamu bwa ntina ya basusu

Léon XIV alobaki ‘te mokristu azali te bobele moto moye amipesaka mpo na bolamu bwa bato, kasi azali «moto ya motema mawa, moto ayebi kolinga kasi akozela to koluka litomba te mpo na ye moko, mpe alukaka na molende nyonso bolamu bwa ntina mpo ya bato basusu». «Moto nyonso azali kati na kondima na Kristu, abyangemi na kobatela bomoi bwa ye na nguya ya Elimo Santu, asengeli kozala na mposa makasi ya kozala na bondeko bwa bokristu. Kozala na bizaleli to mabongi malamu ya teoloji. Na lisalisi na yango nde tolingaka Nzambe koleka makambo manso mpe bazalani ba biso lokola biso moko, bobele mpo na bolingo bwa Nzambe».

Liboso ya kopesa bango bobenisi, Nganga Mokonzi Monene alakaki bango ‘te mpo ya bomipesa bwa bango na mosala mwa Nzambe mpe basusu, mpo na kotambola nà bango elongo na motema molai mpe na boboto, Mokonzi apesa bango Ngolu ya ye mpe apambola bango na mapamboli ebele.

Barcelone ezali komilengele mpo na koyamba Pápa Léon na esengo

Delegation ya Cercle équestre ya Barcelone bazalaki elongo nà Cardinal Juan José Omella. Na likita esalemaki o mokolo mwa 9 ya sanza ya màrsi, episkopo ya Barcelone abengaki bato ba Catalogne báyamba na esengo mpenza Pápa Léon, mokonzi ya Eklezya Katoliko, oyo akokende na Barcelone na sanza ya Yuni ezali koyà mpo na kopambola tour ya ndako-nzambe ya Yesu-Kristu ya Bazilika ya Sagrada Família.

Mpo na kokanisa lisusu, Cercle équestre esalemaki na Catalogne koleka mibu nkama moko na ntuku motoba. Etulukù ya basangani, bayanganaki na bolingo na mposa ya bango ya bokumbi mpunda. Lelo oyo, ezali na balandi 1 500, kati na bango 300 bazali na nsé ya bambula tuku minei (40 ans), mpe ezali esika oyo bakristu ba Lingomba ya Katoliko bakoki kokutana mpo na kokanisa, kosolola, mpe bosangani bato mpo na makambo ma bomoi ya bato mpe ya mosala.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

25 sánzá ya mítáno 2026, 20:56