Léon XIV: Kosalisa bato ya Gaza mpe kotosa lotomo la moto
Bansango ya Vatikan
Kotósa lotomo la moto mpo na bato banso mpe kosalisa bato ya Gaza; yango nde mbela ya Léon XIV ut’o Castel Gandolfo. Tango azalaki kolungwa na Villa Barberini, sima ya mwa ngonga na ye ya bopemi mpe ya mosàlà, ayanolaki na mitùnà ya bapanzi-nsango na maye matali bato ya Global Sumud Flotilla oyo bakangamaki na mampinga ya Israel na tango balingaki komema lisungi na Gaza, mpe balobaki ‘te babetaki bango mpe banyokolaki bango. Pápa alobi ‘te “bazali kokolisa boyinani” mpe ‘e “mobulu mozali na ntina te”. Esengeli “kozonga na mesa ya masolo” mpe “koluka kosilisa mikakatano na nzela ya masolo, tango inso na limemya ya lotomo la moto mpo na bato banso”.
Mawa mingi mpamba te, bato ya Gaza bazali kozwa lisungi ya bato te. Yango ebimisi botomboki, mikakatano, ata mpe buluyeke ya baoyo basanganaki na flottille. Nganga-Mokonzi Monene alobi na “bakonzi banso” mpo basunga mpe basalisa “bato ya Gaza” oyo bazali “konyokwama”. Mpe basalisa bango “ut’o sik’awa na kobanda kozongela kotonga mboka”.
Na tango basàlàki ye motùnà mp ona maye matali IA, sima ya kobima ya mokanda mwa ye, Magnifica humanitas, Leon XIV asengi na kolanda masolo na bakompanyi minene ya secteur ya AI mpe alobeli mosala oyo Dicastele mpo na misàlà ya Développement Humain Intégral ezali kosala na Anthropic. Nakanisi ezali na ntina mingi kokoba na masolo mpe koluka mpenza mayele ya bomoto ya sika oyo ezangi bibundeli to mandoki, elobi ye; mpe abakisi ‘te “etumba lelo ezali kosalema na lisalisi ya IA”, lokola “na Liban”, mpe na bisika bisusu ya mokili, kasi bazali kozanga kokanisa bomoi bwa bato baye bazali mpenza o kati ya likàmà ya makambo mànà. Yango wana, tozali kosenga lisusu kimya.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
